Antoine Wendo Kolosoy

Útá Wikipedia.

Antoine Wendo Kolosoy (abótámá ó mokɔlɔ mwa 25 apríli 1925; akúfá ó mokɔlɔ mwa 28 yúli 2008) azaláká moyémbi mpé mokeli wa nzémbo wa Kongó-Kinsásá. -Ye ayebaná mingi lokóla Papa Wendo - amonɔnɔ ó molɔ́ngɔ́ mobimba lokóla "Tatá" wa Mizíkí ya Kongó-Kinsásá, lolenge la mizíkí luye luzalí kosangisa rumba, beguine, waltz, tango mpé cha-cha. et

Bomɔi bwa mòtò[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bomwána[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Wendo abótámá na mobú mwa 1925 na engúmba ya Mushie na etúká ya Maí-ndombe na ekólo Kongó-Kinsásá ntángo yangó ezaláká na nsé ya mbúlamatáli ya koloni ya ekólo Beleziki. Ntángo yě azaláká naíno mwána wa mibú nsambo, tatá wa ye akufáká, ntángo mokɛ́ nsima ya liwâ lya tatá wa yě, mamá wa yě óyo azaláká mpé moyémbi akufáká lokóla. Ekomáká ye mwána etíké, bamumpɛ́ ba lingómbá lya bamumpɛ́ ya Afrika (Société des missionaires en Afrique) bamokamatáká mpó na komobokɔlɔ na ndáko ya bǎna bitíké. Yě abokolomɔ́kɔ́ na ndáko eye wâná kobanda liwâ lya babótí ba yě téé na mbúla (mvúla) zómi na ibalé to isáto ntángo basángó bomobenganáká likoló lya maloba ma nzémbo ya yě maye masepelisáká bangó sɔ́kɔ́ mokɛ́ tɛ́. Wendo abandáká kobɛ́tɛ lindánda mpé koyémba mpó nakosepelisa batò na mibú zomí na moko.

Marie-Louise (loba Mali-Loyisa)[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Marie Louise ezalí loyémbo la ye ya yambo eye ezwáká ngɛngɛ makási mpé nkɛ́mbɔ ó molɔ́ngɔ́ mobimba na mobú mwa 1948. Loyémbo luye lukomamáká elɔngɔ́ na mobɛ́ti guitare Henri Bowane. Bopanzaní nsango (publicité) ya "Radio Congolia" mpé nungu nungu iye ibótamáká nsima ya loyémbo luye ipesáká lango sɔ̂lɔ́ eposa ya kompanzana makasi na Afrika mingi mpenzá na Afrika ya wesita. Ngɛngɛ eye ememáká mpé kpɔ́kɔ́sɔ́: bakambi ba nsambela ya mumpɛ́ balobáká éte loyémbo luye luzalí na nguyá ya satána. Masoló na eleko eye wâná malobáká éte loyémbo luye sɔ́kɔ lusambelamí na káti káti ya butú mpenzá (ngonga zeló tǒ minuit), lukosekwisa bakufi. Wendo asilikáká mingi mpé kánda emomemáká mosíká ya engúmba Kinsásá mpé amosukáká na bokangami na Kisangani (ntángo êná Stanleyville) mpó na ntángo mokɛ́ na bolɔ́kɔ epáí ya bakonzi ba mbúlamatáli ya koloni ya Beleziki mpé bamumpɛ́ bamobóyeláká kosangana na nsambela ya bangó.

Nkúfa[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moyémbi Wendo Kolosoy akotɔ́kɔ́ ó lopitálo la clinique Ngaliéma mpó na koluka libíki na bokɔnɔ kasi azongisáká molímo na ngonga ya zómi na mwambe minúti ntúkú isáto nsima ya nzángá ó mokɔlɔ mwa ntúkú ibalé na mwambe, sánzá ya nsámbo mobú mwa nkóto ibalé na mwambe na lopitálo la Ngaliéma, ntángo yě azaláká na mibú ntúkú mwambe na misáto.

Diski[kokoma | kobɔngisa mosólo]

The "Trio Bow" recording of "akeyi na zandu" (1956) on the Ngoma records label. Wendo, Antoine Bukasa and Manuel D’Oliveira, stars individually, were combined into this supergroup in 1955 by Nicolas Jéronimidis.
Cover of the 1996 re-issue of Ngoma records early singles, including "Marie-Louise". Wendo is pictured, c. 1950, in the center, in front of the Ngoma Records touring van.
  • Nani akolela Wendo? (1993)
  • Marie Louise (1997) -- Indigo LBLC 2561 (2001)
  • Amba (1999) -- Marimbi 46801.2 (2002) -- World Village 468012 (2003)
  • On The Rumba River (Soundtrack) Marabi/Harmonia Mundi 46822.2 (2007)
  • Banaya Papa Wendo IglooMondo (2007)

Compilations[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Ngoma: The Early Years, 1948-1960 Popular African Music (1996). Includes the original recording of "Marie-Louise", 1948 (Antoine Kolosoy "Wendo" / Henri Bowane)
  • The Very Best of Congolese Rumba - The Kinshasa-Abjijan Sessions (2007) Marabi Productions
  • The Rough Guide to Congo Gold -- World Music Network 1200 (2008)
  • Beginners Guide To Africa -- Nascente BX13 (2006)


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.