Bacillus Calmette-Guérin

Útá Wikipedia.

Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin (BCG) na mwǎna wa yo. Lokásá luye luzali kolobela likambo litali nkísi ya Bacillus Calmette-Guérin, mángwɛlɛ́ maye bapɛ́sɛkɛ mpó na kobátela mwǎna wa yɔ̌ na bokɔnɔ bwa Tibélekilosi (TB).


Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin mazali na biloko biye bipɛ́sɛkɛ bokɔnɔ ya Tibélekikosi (TB) kasi maye basili kolongola bokási bwa yangó. Lokóla basili kolongola bokási bwa yangó, ekoki kosala lisusu mabé tɛ́ o nzóto ya moto, kasi ekosalisa nzóto ya mwǎna ekolisa komibátela ya yangó mɔ̌kɔ́ (immunite), mpé atâ sɔ́kí mwǎna akutani na TB, akozua yangó lisúsu tɛ́.

Mpó na níni mwǎna wa ngai azwa mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin ?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na Ingɛlɛ́tɛlɛ, lokóla na mbóka isúsu, BCG (Bacillus Calmette-Guérin) epɛ́sɛmɛkɛ na bǎna baye bazali pɛnɛ na bato baye bakoki kozala na TB. Wana ezali mpó bǎna bâná bavándaka bisika bato mingi bakoki kozala na TB, ekoki kozala babóti tǒ bankɔ̂kɔ baye baúti bisíká biye bato mingi babɛ́lɛkɛ TB. Na mokúsé mbala mingi bǎna baye bavándaka na engúmba ya masikini. Mángwɛlɛ́ maye bapɛ́sɛkɛ ntángo mwǎna abótami kasi bakopɛsɛkɛ mpé lisusu ntángo inso yě asengeli na mangó.

Mbala mingi mwana nayo bakobeta ye tonga ya BCG na lobɔ́kɔ ya mwasí mpene na lipeka.

Bapɛ́sɛkɛ mwǎna mángwɛlɛ́ ndénge níni?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mbala mingi bakobeta mwǎna wa yɔ̂ ntonga ya BCG na lobɔ́kɔ la mwasi pɛnɛ na lipeka .

Nkisi éna ekoki kosala mabé?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ntángo ozui ntonga, mbala mɔ̌kɔ́ esíká énâ ekovimba. Wana elakisi éte babɛti ntonga ndénge esengeli. Nsima ya mpɔ́sɔ 2 kin'o 6 wuta kozua ntonga, elembo ekomɔ́nɔnɔ. Ekosua mpó na mikolo mwa mokɛ, kasi ebikaka nɔ́kí sɔ́kí okangi yangó tɛ́. Ekoki kotika elembo ekɛ. Ntángo esúsu mwǎna akozala na mpótá esíká eye bamobɛtɛ́ki ntonga. Sɔ́kí mpótá ezali kobimisa mái, kanga yangó na elamba ekauka tíí ekobanda kokauka. Kasi kokanga yangó na sparadrap tɛ́. Mpótá énâ ekoki kosala sánzá mpó ebanda kokauka Sɔ́kí epɛsi yɔ̂ mawa o motéma, tǒ omoni lokóla mpótá ezali koyâ monɛnɛ, kɛndɛ epái ya mónganga.

Mpó na níni mwǎna wa ngai azua mángwɛlɛ́ ma BCG tɛ́?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Lokóla mángwɛlɛ́ manso, ntángo esúsu ekosengele tɛ́ kopɛsɛ mwǎna mángwɛlɛ́ BCG. Ntína yango iye:

Esengeli nayeba nini lisusu?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mwǎna wa yo akoki kobanda nkísi ya kobatela yě na diphtherie, hemophilie, gilípi, meningite, pertuse, búkabúka, kintúntú, na bokɔnɔ bukotaka na mpótá tetanosi sɔ́kí azali na sánzá 2 ekopekisa tɛ́ éte azua BCG. Kasi zala káka na bokɛ́ngi éte nkisi isusu ínâ ibɛtɛmɛ na lobɔ́kɔ luye babɛtɛki yě mángwɛlɛ́ ma BCG tɛ́ kín'o nsima ya sánzá 3, sɔ́kí tɛ́, esíká énâ ekoki kovímba. Mpé koma nsango ya kozua mángwɛlɛ́ ma BCG mpé mángwɛlɛ́ masúsu na bukú ya mwǎna <Personal Child Health Record (PCHR)> mpó esalisa yɔ̂ nsima.

Mbóka iye izalaka na babɛli míngi ba TB[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mbóka iye ikomami o nsé izalaka na bato mingi baye bazali kobɛlɛ TB. Sɔ́kí eyano ya yɔ̂ na mitúna na biso ezali 'eɛ́' tǒ 'íyo', sála nɔkí opɛsɛ mwǎna wa yô mángwɛlɛ́ ma BCG sɔ́kí amozui naíno tɛ́.

  • Yɔ̌, bandeko ba yô tǒ tatá wa mwána wa yô awuti na mbóka yɔ̌kɔ́ na kati ya iye itángami o nsé?
  • Yô na mwǎna wa yo bokokɛndɛ́kɛ́ kovánda koleka sánzá mobimba tǒ bokotambola mingi na kati ya mbóka iye itángami o nsé?
  • Na káti ya ndáko ya yô, tǒ pɛnɛpɛnɛ na yɔ̂, ezalí na moto oyo akokáki kozala pɛnɛ wa mwǎna wa yɔ̂ na ntángo mingi, óyo azali na TB tǒ azaláká na yangó kala, tɔ̌ awuti na mbɔ́ka yɔ̌kɔ́ na kati ya iye itángami?
Aljeria                            Kamerun                       Sǎo Tomé na Principe         Afganistani
Al Mamlaká al-Maghribiya (Maroc)   Kenya                         Sénégal                       Djibuti   
Angóla                             Komori                        Seyshel                       India
Bê Afríka (Santrafríka)            Kongó-Brazzaville            Sidafríka                     Omani
Bénin                              Kongó-Kinsásá               Sierra Leone                 
Botswana                           Kotdivuar (Cote d'Ivoire)     Somalie 
Burkina Faso                       Liberia                       Eswatini 
Burundi                            Libîya                        Tshad
Ejipti                             Malawi                        Togo 
Ekwateli                           Mali                          Tunisia
Elitré                             Moritani                      Uganda           
Etiopi                             Mozambiki                     Zambia 
Gabon                              Namibia                       Zimbabwe
Gambia                             Niger 
Ghana                              Nizeria
Gine                               Rwanda
Gine-Bisau 
Gine-Ekwatoliáli (Mambénga)                                      San Salvador

Sango ya kobakisa[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mpó ozua nsango isúsu na lolénge la komibátela, mpé kobátela bandeko na baninga ba yô bazwá TB tɛ́, okoki kokɛndɛ tǒ kobênga: