Boyókani bwa bakɔ́ngɔ (ABAKO)

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki

ABAKO na lingála Boyókani bwa Bakɔ́ngɔ ezalí bokúsé bwa Aliance des Bakongo na lifalansé ezaláká lingómbá lya politíki liye lizaláká kosangisa bambótama ba kongo-central. Likelami na Joseph Kasa-Vubu, moyékoli wa kala o *grand séminaire ya Kabwe mpé na Nzeza Landu, moyékoli wa kala o *grand séminaire ya Brazzaville. O ebandeli yangó ekelamáká mpó na misálá ya politíki tɛ́ kasi mpó na kosangisa, kobátela mpé kotómbola lokótá la Kikɔ́ngɔ, mwǎngo ya yangó ezaláká mpenzá ezaleli ya baye balobaka Kikɔ́ngɔ mpé mbótama ya sika ya ezaleli ya bakɔ́ngɔ. Yangó etikáká misálá mya mangó o mobú mwa 1966 na ntángo mokambi-ekólo Mobutu apɛsáká ndingisa 'te mangómbá mánsɔ ma politíki masengeli kotika misálá mya politíki mpé akeláká lingómbá lya politíki sé mɔ̌kɔ́ mpó na ekólo na nkómbó na MPR, bokúse bwa lifalansé ya Mouvement Populaire de la Révolution liye likomáká Lingómbá-Lɛ́ta na Kongó-Kinsásá.

Makanisi[kokoma]

Lipandá sasépi mpé *federalism

ABAKO mikɔlɔ miye[kokoma]

Nkómbó ABAKO ya lelo Boyókani bwa Batóngi ba Kongo, na lifalansé l'Alliance des Bâtisseurs du Kongo ezalí lingómbá lya politíki.

Wiki letter w.svg Óyo ezalí ndámbo. Okokaka kosálisa mpé kobalusa.