Joseph Kasa-Vubu

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki
Joseph Kasavubu (1962)

Joseph Kasa-Vubu, azalí Mokambi-Ekólo wa libosó wa Kongó-Kinsásá. Yě afándaka na kiti ya bokonzi bandá mokɔlɔ mwa 1, sánzá ya nsambo mobú mwa 1960 tíí mokɔlɔ mwa 24, sánzá ya zómí na mɔ̌kɔ́ mobú mwa 1965. Mokambi mbúlamatáli ya yě wa yambo ezaláká Patrice Lumumba.

Bomɔi bwa moto[kokoma]

Abotamá na Dizi pɛmbɛ́ni ya Tshela na Mayombe (Bas-Congo), mokɔlɔ mwa yě mwa mbótama eyébani malámu tɛ́. Kozánga kozwa batísimo na mbótama esáláká 'te mokɔlɔ mwa yě mwa mbótama ekomama tɛ́ na mikanda mya lɛ́ta. Engɛ́bɛ́nɛ́ na maloba ma baníngá ba yě ba kelási mpé bamumpɛ́ ba lingómbá lya Scheut baye bayébaka yě lokóla moyékoli, mobú mwa mbótama ya yě mokoki kozala nzínganzínga ya mobú mwa 1915, kasi na 1913 tɛ́ engɛ́bɛ́nɛ́ na makomi maye mazalí kotála bomɔi bwa yě. Moyékoli na kelási ya bónganga Nzámbe o Mbata-Kiela, bamumpɛ́ bamɔnɔ́kɔ́ na lombango 'te yě azalí na nsɔ́mí míngi eye elongobani tɛ́ na mosálá mwa bónganga Nzámbe. Bomoyíbisáká 'te ékosɛ́ngɛlɛ alanda kelási ya bato bansɔ, mpé akɛndɛ́kɛ́ (akotɔ́kɔ́) kelási ya bato bansɔ mpé ayékoláká makambo matáli bokanisi (philosophie).

Nsima ya bosilisi kelási ya yě, yě akómáká molakisi kasi amɔnɔ́kɔ́ 'te lifuta lya yě lokóla molakisi ekokanáká sɔ́kɔ́ mokɛ́ tɛ́ na kelási iye yě akɔtɔ́kɔ́. Akotíka mosálá mwa molakisi, mpé akɛndɛ́kɛ́ kosála na lingómbá lya mombɔ́ngɔ ya mabáyá liye libêngami Agrifor mpé nsima ya kosála na lingómbá lîná , asáláká lokóla mosungi *comptable na mbulamatari ya koloni na *departement eye etáli makambo ma mosɔ́lɔ. Ekomi yě na Léopoldville_nkómbó ya kala ya kinsásá, akozwa *infuence ya makanisi ndéngé na ndéngé ma lisangá lya bato baye babêngi bakaláka baye baútaka na bingúmba ndéngé na ndéngé ya ekólo Kongó-Kinsásá.


Yě, ayébanáká míngi o miso mya bato lokóla mokambi mwa lingómbá lya politíki liye ebêngami Boyókani bwa bakɔ́ngɔ, na lokóta la lifalansé balibêngi "Alliance des Bakɔ́ngɔ", ABAKO na bokúsé.

Na mobú mwa 1958, akómaka bugumési ya komíni ya Dendale eye ekóma lɛlɔ́ komíni Kasa-Vubu

Na mobú mwa 1965, mɔ̌kɔ́ wa basɔ́dá ba yě na nkómbó ya Mobutu akobakola yě mpé moyangeli wa yě ya yambo na kiti ya bokonzi na loléngé luye babêngi na lifalansé coup d'etat, mpé Mobutu akokóma mokonzi wa ekólo mpé akopɛsɛ ndingisa 'te Kasa-vubu afánda o ndáko ya yě lokóla moto wa bɔlɔ́kɔ mpé abimaka tɛ́. Bamozóngisáká o mbóka wa yě na Bóma o engúmba Bas-congo mpé ndako eye azaláká kofánda ekengelamáká bútu mpé mói mpó na komopekisa kobima, Na mobú mwa 1969, azwaka bokɔnɔ kasi lokóla bamopekisáká kobima libándá lya mbóka ya yě o Kisundi, yě akufáká na bozángi *soins (malako) ma mongángá.

Kasa-vubu abaláká ....mpé azaláká tatá wa bǎna.....

Mosálá mwa politíki[kokoma]

Ntángo Kongó-Kinsásá ezwǎká bonsɔ́mí (lipandá) na mobú mwa 1960, Kasa-vubu apɔ́nɔmɔ́kɔ́ na *assembly ya sika ya Kongó-Kinsásá lokóla mokonzi ekólo mpé afándadaka na kiti ya bokonzi na mokɔlɔ mwa ntúkú mísáto, sánzá ya motóbá, mobú mwa 1960.

Ntángo ekɛ́ nsima ya mbotámá ya repubiliki ya sika, yangó ekutanáká na mikakátano míngi, ngámbo mɔ̌kɔ́ ezaláká na mikakátano mya politíki mpé ngámbo esúsu, mikakátano na mapinga ma basɔ́dá mpé ngámbo esúsu bitumba bya bokaboli mbóka o biténi na Katanga. Na ntángo ya matatá mâná, mbúlamatáli ezaláká kotambwisama malámu tɛ́ mpó na bozángi boyókani eye ezaláká na kati ya mokonzi-ekólo Kasa-vubu mpé moyangeli wa yě wa yambo Patrice Lumumba. Tála Matatá na Kongó nsima ya lipandá.

Na mokɔlɔ mwa mitáno sánzá ya libwa, Kasa-Vubu alongoli Lumumba na kiti ya Moyangeli wa Yambo kasi Lumumba aboyi kolongwa na kiti ya Moyangeli wa Yambo mpé yě _Lumumba_ asokoli 'te alongoli Kasa-Vubu na kiti ya bokonzi mpé amisakoláká mokambi wa ekólo, likambo liye lisáláká 'te misálá mya mbúlamatáli ézaláká kotambwisama lisúsu malámu tɛ́ mpé matatá maye masukáká o mokɔlɔ mwa zómi na mínei ntángo komanda mɔ̌kɔ́ ya mapinga ma basɔ́dá na nkómbó ya Joseph Mobutu Sese Seko abɔ́tɔlɔ́kɔ́ bokonzi epái ya Kasa-Vubu mpé akangáká Lumbumba na bɔlɔ́kɔ. Lumumba apɛ́sɛmɛ́kɛ́ na mabɔ́kɔ ma bakaboli ba nsé ya engúmba ya Katanga mpé basiláká komoboma na lisálisi mpé lipamboli lya bikólo bisúsu bya molɔ́ngɔ́. Nzóto ya yě etiyamaka na tono ya *acide mpé Mbúlamatáli ekambamáká na lingómba lyɔ̌kɔ́ lya bayékoli ba bobɔ́ngɔ bwa Kongó mpé nsima ya mwa ntángo Kasa-Vubu azongeláká bokonzi bwa yě.

Mibú mitano miye milandáká, Kasa-vubu akambáká ekólo na mbúlamatáli iye izánga nguyá. Na sánzá ya sambo ya mobú mwa 1964, yě apɔnɔ́kɔ́ mokonzi wa lingómba lya bokaboli na nkómbó ya Moise Tshombe lokóla Moyangeli wa Yambo mpé apɛ́sɛ́kɛ́i nzéla 'te babundi ba mbóka isúsu míngi mpenzá babundi ba erópa babunda bitumba biye kongó ezaláká na yangó na batɔmbɔki baye bazaláká na Kisangani mpé bakambamáká na Pierre Mulele.
Mobutu akobɔ́tɔlɔ bokonzi mbala ya íbalé na mokɔlɔ mwa ntúkú míbalé na mínei sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ mobú mwa 1965, kasi ntángo eye akofándisa Kasa-vubu pɛmbɛ́ni mpé akomisákola Mokambi-ekólo.

Tála mpé[kokoma]


Mokonzi wa ekólo ya Kongó-Kinsásá

Joseph Kasa-Vubu | Mobutu Sese Seko | Laurent-Désiré Kabila | Joseph Kabila


Nkásá o libándá[kokoma]

Elílí ya Kasa-Vubu mpé atikele

Wiki letter w.svg Óyo ezalí ndámbo. Okokaka kosálisa mpé kobalusa.