Aller au contenu

Mbándáká

Útá Wikipedia.
(Eyendísí útá Mbandaka)

Mbándáká ezalí engumba ya libongo o etuka ya Equateur o Ekolo Kongo ya Demokrati, oyo ezali mboka-mokonzi ya etuka. Engumba yango ezali esika ya ntina ya kotelemela na ebale kati na bingumba ya Kisasa mpe ya Kisangani.

Engumba yango eyebanaki liboso na nkombo Coquilhatville (nkombo ya Camille Coquilhat, ebengamaka [kɔklatvil]) tii na 1966. Ba communes mibale, oyo ya Mbandaka mpe oyo ya Wangata, esali engumba yango, mokomoko ezali na bitúká 10.

Lisanga moko ya mindelo na Wangata esakisaka malamu ete mondelo ya ekwater eleka wana.

Engumba ya mbandaka ezali na bomengo mingi ya banzete, baniama mpe bambisi lolenge na lolenge. Eala, ebombeli nzamba moko monene ezwami na mbandaka, yango ekelama na Léopard ll

Na tango ya bowumbu ya Léopold II, Engumba ezalaki kaka esika ya boyambi mpe botindi mikanda mpe basango, ekambamaka na moyibelgiki moko Camille Coquilhat (1863-1891), oyo kombo na ye ekomaki kombo ya etuka tee na 1966, tango tata Mokonzi Mobutu azwaki mokano ya kobongola yango.

Na 1883, Stanley atelemaki na kilomètres motoba na sudi, na Wangata, tango azalaki komata na ebale na ngambo ya Kisangani, mpe abengaki etini oyo "Equateur" mpe bayibelgiki batiaki etonga ya sango mpe ya mikanda na bango ya liboso kuna. Na 1891, basundolaki Wangata pona Mbandaka. Banda wana, mboka-mokonzi ya Equateur esalemi na bingumba mibale, Wangata mpe Mbandaka, oyo ezali kokola ntango nyonso.

Esalemaki lokola distriki ya Engumba na 1895, ezuaki lingomba ya Engumba na sanza ya libwa ya 1958. Ekoma Engumba mokonzi ya etuka ya "Cuvette Central" na 1963.

Litongisi ya Engumba epesamaki engebene na ebale, maboko na yango mpe bamayi ya mikie oyo ebwakami o kati na yango. Ezalaki na Mbandaka nde elenge Mobutu asalaki ndambo ya kelasi na ye.

Engumba yango ezalaki esika ya koboma bato mingi mingi mingi ya ba Hutu na tango ya Etumba ya liboso ya Congo, kobanda le 13 ti 17 ya sanza ya mitano ya 1997.

Engumba yango ezali na bingumba ya mikie 2, ekabolami na biteni ya biyangeli :

1. Mbandaka : Air Congo, Bakusu, Basoko, Bokala, Djombo, Ikongowasa, Ibanda, Ipeko, Mambenga mpe Mbandaka-Inkole
2. Wangata : Bolenge, Bobwanza, Bongonde, Bongondjo, Bosomba, Boyera, Ituri, Inganda, Maman-Balako mpe Wendji-Secli

Motango mwa bato

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Motango ya bayimbadaka ezwami na 1,188,000 na 2015 kasi ezali kaka ya komata.

bato mobu bato mobu
12 300 1920 [1] 86 700 1967/68 [2]
10 000 1936 [3] 107 900 1970 [4]
10 300 c1938 [5] 136 900 1974 [6]
9 000 1939 [7] 149 100 1976 [8]
9 700 1947 [9] 137 300 c1984 [10]
- 1953 ? 165 600 1991 [11]
32 000 1957 ? 169 800 1994 [12]
51 400 1959 [13] _ _ _ 729 257 2004 ?

Ezwami na mopanzi ya mwasi ya ebale ya Kongo na se ya ya ebale ya Ruki, ezali na 720 km na ebale mpe 1.180 km na nzela ya ekolo RN8 nord-est ya Engumba mokonzi Kinshasa. Ezali na mwa bakilometele likolo ya équateur.

Tálá mpé

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  1. Almanach de Gotha /or:/ Gothaischer Hofkalender (1838-1944)
  2. Webster's new geographical dictionary. 2nd ed. (1972)
  3. Hickmann. Bevölkerung der Erde (1939)
  4. The international atlas (1972, 1999), Hammond citation world atlas (1998)
  5. Census, Encyclopaedia Britannica world atlas (1947), Huizinga. Internationaal aardrijkskundig woordenboek (1958)
  6. Länderberichte / Statistisches Bundesamt (1985-1996), Statesman's yearbook (1930-2001)
  7. Almanach de Gotha /or:/ Gothaischer Hofkalender (1838-1944)
  8. Webster's new geographical dictionary. 2nd ed. (1972)
  9. Almanach de Gotha /or:/ Gothaischer Hofkalender (1838-1944)
  10. Census, Britannica book of the year : world data (1997), The international atlas (1972, 1999)
  11. Länderberichte / Statistisches Bundesamt (1985-1996), Merriam-Webster's geographical dictionary. 3rd ed. (1997)
  12. Britannica book of the year : world data (1997)
  13. Hammond world atlas (1976), Länderberichte / Statistisches Bundesamt (1985-1996)


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.