ONATRA

Útá Wikipedia.

ONATRA (Office National des Transports), ezalakí entreprise publique ya l'Etat tée 23 dɛsɛ́mbɛ 2010. Ezalí Etongolo ya mombongo ya Bokumbi mpé Libóngo (EMBL tǒ SCTP). Yango ezali kosala exploitation ferrovière na portuaire na transport fluvial. Ba activités na yango ezali na ouest na nord ya mboka. La compagnie du Congo pour le commerce et l'industrie, CCCI, esalemi le 27 décembre 1886 na Maître Van Halteren na Van Bevere (ba notaires na Bruxelles). Filiale na yango, la compagnie de chemin de fer du Congo (CFC), esalemi le, 31 yuli 1889. Yango esalemaki mpo etonga na ezua possibilité ya ko exploiter mpe kosala nzelá-masíni na Bas-Congo mpé 1500 hectares ya mabele pembeni ya nzela ya rail oyo ekotongama. Kasi, compagnie oyo ekokaki te selon projet na yango, kosangisa batu oyo bakokaki kosala musala moye. Donc, esengelaki babengisa batu bawuta na Afrika ya wesita mpo baya kosala musala wana. Esengeli koloba ete ba conditions oyo batu babandaki kosalela musala ezalaki mpasi mingi mpo mingi bakufaki mpe mingi batombokaki kasi Belge abomaki mpe ebele. Selon ba calculs, na train oyo ebandaki komema 50 Tonnes, mpe ko rouler na vitesse ya 20.5km/h, ezalaki économique par rapport na 13.000 porteurs oyo babandaki ko coûter 50 fois chers (en coût, soins, alimentation, etc.).

Lisapo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Boma[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Entre 1889 na 1890 Tramway à vapeur etamboli na Bóma.

Boma - Tshela (Mayumbe)[kokoma | kobɔngisa mosólo]

CVM, Société des Chemins de fer Vicinaux du Mayumbe, esalemi le 30 juillet 1898.

le, 21 septembre 1898, signature ya Convention entre l'État Indépendant ya Congo na Compagnie ya construction CCCF mpo na kotonga ligne ya Boma na point ya bief navigable ya Moyen-Tshiloango. Kasi bakotonga tee na Tshiloango te. Ligne eyekosuka kaka na Tshiela. Ligne yango esali 140 km, eleki na Luki naye km 32, Lemba na km 39, Lukula na km 80, Loango na km 114.

le, 6 Août 1900, bako atteindre Tshisundi au km 44 mpe na kobanda exploitation mbala moko.

le, 19 octobre 1914, misala misili mpe bafungoli gare ya Tshiela.

Matadi - Kinshasa mpé Mayumbe[kokoma | kobɔngisa mosólo]

CFC, la Compagnie du Chemin de fer du Congo, esalemi na 1892, train ya mindele. Ebandaki kosala: Matadi - Kenge - Songololo - (col de Zole) - Tumba - Kama - Mbanza-Ngungu (Thysville) (col de Zona Gongo) - Inkisi - Tampa - Kinshasa (Léopoldville).

Misala mia kotonga ligne Matadi - Kinshasa (Léopoldville) mibandaki le 15 mars 1890 mpe mosilaki le, 16 marsi 1898. Albert Thys azalaki conducteur des travaux.

CFC entre 1898 na 1932 na 1923 na 1931
renovation na changement ya écartement ya tracé eyaki kosalema
Ecartement 0,765 m 1,067 m
Rail 21,5 kg/m 33.4 kg/m
Charge totale ± 10 tonnes par essieu ± 15 tonnes par essieur
Longueur 400 km 366 km
Pente Max 45% 17%
Rayon Min 50 m 250 m

Réorganisation[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Entre 1899 na 1942, construction ya chemin de fer Mayumbe Boma-Tshela Na mukolo ya 20 avril 1935, Belge, na but ya kosangisa ba entreprises de transports oyo ebandaki kosala na Congo, ayaki kosala entreprise publique industrielle et commerciale ebengami Office des transports coloniaux, OTRACO. Entreprise oyo ebandaki ko gerer chemin de fer ya : Matadi na Kinshasa, direction na Mbanza Ngungu (Thysville); chemin de fer ya Mayumbe: Boma - Tshiela, direction na Lukala; ba services fluviaux ya Haut congo na ba principaux affluents na yango , direction Kinshasa (Leopoldville); Mabongo ya Boma, Matadi, Kinshasa, Mbandaka, Kisangani, Bukavu, Goma na Kalundu; navigation na lac kivu mpe une partie ya chemin de fer ya Kivu.

OTRACO[kokoma | kobɔngisa mosólo]

OTRACO e reprenaki le, 1 janvier 1936, ba :

  • chemin de fer Boma-Tshela (Mayumbe) ;
  • chemin de fer Matadi-Kinshasa (Léopoldville) oyo ezalaki ya CFC;
  • port ya Matadi na Boma;
  • chemin de fer du Kivu;
  • nzela ya Kalundu-Bukavu;
  • navigation na lac Kivu;
  • libongo lya Léopoldville-Kalina;
  • CITAS na libongo lya Léopoldville-Kingabwa
  • bief Banane-Boma-Matadi (1955).

Kivu[kokoma | kobɔngisa mosólo]

le, 20 juin 1929, mbotama ya Société des Chemins de fer ya Kivu, CEFAKI. Esengeleki e kangisa lac Tanganyika na Kalundu, 776 m, na lac Kivu na Bukavu, 1460 m, na distance ya 137 km. Kasi ba problèmes ya topographie esalaki ete bakomisa ligne tee na Kamanyola km 93,4. Na yango esengelaki lisusu kotonga ba ngbagba ou ponts na Kamvira, Kiliba na Mulongwe.

le, 20 novembre 1931, chemin de fer ekomaki na Kamanyola. Kasi ba ngomba ya Ruzizi ezalaki mpasi mingi mpo na kopasola yango, Col ya Businga na 1.756 m ya hauteur elembisaki mundele. Yango wana rail etikala ko relier Kamanyola na Bukavu te. Kasi basalaki nzela ya mutuka, 63 km tee na Bukavu. Esengeli koloba ete soki vraiment basalaki ba etudes topographique na ya genie civile approfondies makasi mbele balingaki balonga Ruzizi. Heureusement na moyi ya lelo, ezali lisusu difficulté te kopasola ngomba na lolenge wana. Suka suka ONATRA eyaki ko reprendre CEFAKI na 1947.

ONATRA[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Siège de l'ONATRA à Kinshasa

Na independance ya Congo, le 30 juin 1960, OTRACO eyaki kokoma Office des transports du Congo. Na 1971 OTRACO eyaki kokoma Office national des transports, ONATRA.

Na 1977, conseil executif (gouvernement) ekamataki décision ya kopesa possibilité na moto nionso akoma armateur, du coup, eyaki kolongola monopole ya ONATRA mpe kokotisa concurrence makasi. Décision oyo ezuamaki mpe mpo na kosepelisa ba politiciens na ba militaires oyo bazalaki na ba baleinières na masuwa oyo ebandaki kosala mombongo na fleuve na ba rivières ya Congo. Kasi constitution ebandaki kopekisa batu oyo basala activités commerciale. Situation oyo eyaki kosala ete ONATRA e perdre ba clients ebele. Par exemple na ba années 70, ebandaki komema plus de 400.000 passagers na mbula. Kasi na suka ya ba années 80 akitaki na 120.000 passagers na mbula. Lisusu situation ya guerre eyaki kosala ete masuwa ebandaki lisusu koleka Mbandaka te. donc moyen ya kokende tee na Zongo na Kisangani ezalaki te. Sika totala exploitation ya ONATRA à travers territoire national Na Ebale, kolongua Kinsásá tee Kisangani masuwa ekoleka na : Kwamouth Malela, Tshumbiri, Masuwa makotelema na Bolobo, Mistandunga, Nkolo, Yumbi, Lukolela, Mampoto, Gombe, Ikengo, Masuwa makotelema na Mbandaka, Lolanga, Masuwa makotelema na Makanza, Lusengo, Maludja, Masuwa makotelema na Mobeka, Ikonongo, Umangi, Upoto, Masuwa makotelema na Lisala, Dobo, Masuwa makotelema na Bumba, Barumbú, Masuwa makotelema na Basoko, Yalemba, Masuwa makotelema na Isangi, Yangambi, Yakua, St.Gabriel mpé Kisangani.

Na Komata (à contre courant) Kisangani, Masuwa masalaka 7 jours mpo ekoma na Kisangani. Na Kokita (sens ya courant), esengaka 4 jours mpo ekoma Kinshasa.

  • Na Bas-fleuve: Matadi, Boma na Banana
  • Na ba affluents ya Fleuve Congo etambolaka boye:
  • Na ebale Ubangi: Libenge na Zongo
  • Na ebale Kasai: Ocala, Masada makotelema na Dima, Masuwa makotelema na Bendela, Makaw, Mabenga, Dibaya Lubwe, Basongo, Bena Bendi, tee na Ilebo.
  • Na ebale Maringa: Basankusu na Befori
  • Na ebale Lopori: Basankusu na Bosow limune
  • Na ebale Momboyo na luikla: Ikali
  • Na ebale Busira Tsuapa: Bondo
  • Na ebale Ikelemba: Balangala
  • Na ebale Mongala: Businga
  • Na ebale lomela: Boende, Lomami
  • Na ebale Kwilu: Bandundu na Kikwit
  • Na ebale Wamba: Bandundu na Kenge
  • Na ebale Lukeni: Kutu na Dekese
  • Na etímá Mai Ndombe: Inongo
  • Na etímá Tumba: Irebu, Bikoro
  • Na etímá Kivu: Goma, Kisenyi, Kirotshe na Bukavu Goma

ONATRA ezali mpe na service courrier na ya marchandises. Mpe esalaka jonction na SNCC.

ONATRA ezali actuellement na effectifs ya

  • 14.000 employés na biteni oyo:
  • 3.400 na chemin de fer Matadi-Kinshasa;
  • 4.000 na voies fluviales;
  • 2.900 na ports ya Matadi na Boma;
  • 1.800 na port ya Kinshasa;
  • 1.500 na Chantier Naval;
  • 900 autres sources: administration, agences, immobilier, école de formation, centre medical, etc.

Siège ya Onatra ezali na Kinshasa na Boulevard du 30 juin.

Tálá mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nkásá o libándá[kokoma | kobɔngisa mosólo]