Politíki ya Kongó-Kinsásá

Útá Wikipedia.

Bandá bǎna mbóka Kongó-Kinsásá bazwákí lipandá na mwâ 30 yúni 1960, Ekólo nsɔ́mí ya Kongó ekútání na mikakatano ndéngé na ndéngé mya politíki mpé myɔ̌kɔ́ mya ntína ya mikakatano mîná ezalí kobóya kondima bokonzi bopɛ́sámí na mangómba ma boyángeli ekólo mpé bakambi ba bangó. Bobóyí bwangó bobákísámí na bitumba ndéngé na ndéngé biye bibébísí ekólo bandá 1996 kín’o 2003. Mpɔ̂ ya kosúkisa sékô mikakatano mya mbala na mbala mitálí mambí ma bokonzi mpé kopɛ́sa na ekólo konzo ya komítónga, bantóma ba politíki mpé baye ba mangómba ma bato, masangá ma bato bánsɔ ba ekólo, bakútání na Lisoló linɛ́ne lya bǎna-Kongó (DIC) mpé bandimi na boyókani bonɛ́nɛ bwa bato bánsɔ, botíámí maboko na Pretoria, Afríka ya Sidi, mwa 17 febuari 2002, mpɔ̂ ya boluki kotía mabɔngisi ma sika ma politíki maútí na Mobeko-likonzi mwa sika mpé ya bonsɔ́mí, epái wápi bǎna ba Ekólo Kongó bakókí kopɔna na bonsɔ́mí bakonzi ba bangó, nsima ya mapɔnami ma bosémbo ma bato bánsɔ, ma polele mpé ma sɔ̂lɔ́. Mpɔ̂ ya kolakisa politíki ya mpíkó eye emɔ́nání na bantómá, na Lisoló linɛ́ne lya bǎna-Kongó, Lingómba lya Babɔngisi mibéko liútí, na Boyókani bonɛ́ne bwa bato bánsɔ, ɛ́ngɛ́bɛ́nɛ́ na atikɛ́lɛ ya 104 ya Mobéko-likonzi mwa bwákali, mwǎngo mwa libosó mwa Mobéko-likonzi mwa sika na Lingómba lya Bantómá ba Ekólo liye Lindimi yangó lokóla mwǎngo mwa Mobéko-Likonzi moye motíámí na etúneli ya bato bánsɔ.