Sony Labou Tansi

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki

Sony Labou Tansi to Marcel Ntsoni (5 yúli 1947 – 14 yúni 1995) azalakí mokomi wa masoló ya Kongó-Kinsásá.

Bomɔi bwa mòtò[kokoma]

Abotamá na Kimwenza na Kongó-Kinsásá. Tata wa ye azaláká mwana mboka Kongó-Kinsásá mpe mama wa ye mwana mboka Kongó-Barazaville. Ye azali mwana ya yambo na libota lya bana sambo. Marcel Sony ayekoli lifalanse na kelasi. Uta mobu mwa 1971, abandi kotangisa lifalansé mpe Lingɛlɛ́sa na Kindamba mpe na Pointe-Noire.

O eleko eye mokanda mwa ye ya yambo ebimaka na ekolo Falansia na mobu mwa 1979, ye aponi nkombo ya ye ya mosala Sony Labou Tansi mpo na kotombolaka nkombo ya Tchicaya U Tam'si. Satire féroce de la politique fondée sur la torture, le meurtre et le culte de la personnalité (Bobomi mpe misa ya bomoto), dénonciation de la dictature , La Vie et demie (Bomɔi na ndambo) ezali koleka na ekolo ya solo te, Katamalanasie.

Dramaturge, maboke ma ye masanami na ekolo ya Alémani, na Italya mpe na Lisangá lya Ameríka. Ye akambáká lingomba lya maboke na nkombo ya Rocado Zulu Théâtre ya Brazzaville. Alongáká *Prix Ibsen na mobu mwa 1988.

Ye afandá kaka na Kongo-Barazaville mpe apusanáká na nsuka ya bomoi bwa ye na mo-politiki Bernard Kolélas. Na mobu mwa 1992, aponomi *depute ya Makélékélé, mpe bamolongoli na misala ya leta na mobu mwa 1994. Abeláká bokono bwa SIDA mpe akufá na mibu 47, poso ibale nsima ya liwa lya mwasi wa ye Pierrette. Uta 2003, *Prix Sony Labou Tansi epesemi na maboke ma lifalanse.

Mikandá[kokoma]

Búku[kokoma]

  • La Vie et demie, Seuil, 1979.
  • L'État honteux, Seuil, 1981.
  • L'anté-peuple, Seuil, 1983. Grand Prix Littéraire de l'Afrique Noire.
  • Les Sept Solitudes de Lorsa Lopez, Seuil, 1985. Palme de la Francophonie.
  • Les Yeux du volcan, Seuil, 1988.
  • Le Coup de vieux, Présence Africaine, 1988.
  • Le Commencement des douleurs, Seuil, 1995.
  • L'Autre Monde', Revue noire, 1997.

Tála mpé[kokoma]