2022 Mpela na Kinshasa
Komonana

Mpela ya Kinshasa ya 2022, ebandaki le 12 décembre 2022, tango mbula makasi etikalaki banzela, ba infrastructures, mpe ba quartiers ebele na se ya mayi to ebebaki na Kinshasa, mboka-mokonzi ya République démocratique du Congo.
Bebisi
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Banzela mingi na centre-ville ya Kinshasa ezindaki lokola mbula makasi ekobaki na bangonga, esalaki ete bandako ebele ekwea.[1]. Bato 141 bakufi na mpela eye. Bato mingi bakufaki mpo mabele epanzani mpo mbula makasi ebɛtaki. Bandako soki 280 ekweaki mpe bandako mosusu koleka 38 000 ezwaki mpasi na mpela yango. Bato milio zomi na mibale, bato mingi ya engumba yango, bazwaki mpasi na mpela yango.[2].
Banote na ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ (en) « DR Congo floods leave more than 120 dead in Kinshasa », sur BBC News, 14 décembre 2022
- ↑ (en) « Floods and landslides kill scores of people in Kinshasa », sur The Guardian, 13 décembre 2022