Aṣa Bukola
Erreur de script : la fonction « build » n’existe pas.
Aṣa ([aʃa]), abotamá Bukola Elemide[1] na mokolo ya 17 septembre 1982 na Paris, azali mokomi ya banzembo, mokomi ya miziki mpe moyembi ya miziki ya France mpe Nigéria.
Bomoyi
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Nsima ya kofanda mbula motoba na Paris, libota na ye ezongaki na Nigéria mpe efandaki na Lagos[2] (na ntango yango Aṣa azalaki na mbula mibale). Aṣa alandaki mateya na eteyelo ya miziki oyo efungolamaki na mopanzi ya saxophone ya Royaume-Uni Peter King. Azali na bandeko mibali misato, mpe ye azali mwana ya minei mpe mwasi kaka moko na libota[3].
Bopusi ya miziki na Aṣa ekolaki malembe malembe na nzela ya koleksyo ya miziki minene oyo tata na ye asangisaki mpo na mosala na ye ya mokambi ya foto (directeur de la photographie). Ba-disque yango ezalaki na miziki ya kala ya soul ya États-Unis, ya Nigéria mpe ya Afrika. Na kati na yango ezalaki mpe bankombo minene ya miziki lokola Marvin Gaye, Fela Kuti, Bob Marley, Aretha Franklin, King Sunny Adé, Diana Ross, Nina Simone mpe Miriam Makeba. Aṣa azwaki inspiration mingi na koleksyo ya playlist ya tata na ye[4].
Minzoto ya lokumu
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- Prix Constantin en 2008 pour l’album Aṣa
- Nomination Artiste Féminine de l'Année aux Victoires de la musique en 2011
- Nomination Album de musiques du monde aux Victoires de la musique en 2015 pour son album Bed of stone
Références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ (fr) « Portrait : Aṣa », Mondomix, Mois invalide (juin)
- ↑ « Aṣa, nouvelle sensibilité de Lagos », Libération, Mois invalide (novembre)
- ↑ « bukola elemide (asa) », Nigeria Galleria
- ↑ (en-GB) « My S-xuality Is Been Questioned - Aṣa », Nigeriafilms.com (consulté le 24 yúli 2022)