Ba écosystèmes oyo ezali na likama na République démocratique du Congo

République démocratique du Congo, ezali esika moko ya bisika oyo bikelamu ndenge na ndenge ezali mingi na mokili mobimba, mingimingi zamba na yango ya mbula, oyo ezwi pene na 60% ya teritware na yango. Mboka oyo ezali mpenza eloko ya motuya ya écologie, ezali na banzete mpe banyama oyo ekeseni na mosusu nyonso, bakisa mpe mitindo ya banyama oyo eyebani mingi lokola ba gorilles ya ngomba mpe ba okapis. Kasi, bozwi wana ya bozalisi ezali na likama mpo na misala ya bato lokola kokata bazamba, kotimola mabanga ya ntalo, mpe kosala bilanga makasi. Kobatela ba écosystèmes ezali na tina kaka te pona biodiversité kasi pe pona bolamu ya ba communautés locales, oyo mbala mingi ba dépendre directement na ba ressources wana pona vie na bango[1].
Bazamba ya mikili ya molunge
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bazamba ya tropical ya RDC, mingi mingi Bassin ya Congo, ezali na kati ya bazamba ya biodiversité mingi mpe ezali na rôle ya motuya mingi mpo na ko réglementer climat mondial. Bazali na mitindo ya banzete soki 10 000, mitindo 400 ya banyama oyo ememaka mabɛlɛ, mpe mitindo 1 000 ya bandɛkɛ. Kasi, bazali na likama ya kokata bazamba mpo na bilanga, kokata banzete na ndenge oyo epekisami, mpe kotimola mabanga ya ntalo. Pene na 0,5% ya bozipi ya zamba ebunga mbula na mbula, na mbano ya somo pona biodiversité pe ba communautés locales[2].
Bibale na Maziba
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba systèmes ya bibale pe ya lac, lokola ebale ya Congo pe lac Tanganyika, ezali na tina mingi pona biodiversité ya mayi. Ba écosystèmes wana esungaka bankama ya mitindo ya mbisi mpe bikelamu mosusu ya mai. Bosɔtɔ ya baizini, bilanga makasi, mpe koboma mbisi mingi ezali kotya biloko wana ya ntina mingi na likama. Bopanzani na ba écosystèmes wana ekoki kozala na bopusi na bozangisi bilei ya ba communautés pembeni ya ebale oyo etali mayi wana pona bomoi na bango[3],[4].
Savane na Matiti
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba savanes mpe matiti ya RDC, oyo efandi na mitindo ndenge na ndenge ya banyama, ezali mpe na likama. Ba écosystèmes wana ezali na tina mingi pona ba herbivores migratoires pe ba prédateurs oyo etali yango. Kopanzana ya bilanga, kobundisa banyama, mpe kobeba ya bisika ya kofanda ezali na likama mpo na bikelamu ndenge na ndenge ya bisika yango. Kobungisa bisika wana ya bofandi ezali na bopusi kaka na banyama ya zamba te kasi pe na ba communautés locales oyo etali ba écosystèmes wana pona bilanga pe bilanga ya bibwele[5],[6].
Biloko ya ndenge na ndenge ya banyama
[kokoma | kobɔngisa mosólo]RDC ezali na mitindo mingi ya banyama oyo ezali na likama ya kolimwa, na ndakisa ba gorilles, bangando, mpe ba chimpanzé. Kobundisa banyama na ndenge oyo eyokani te na mibeko mpe kobungisa bisika oyo efandaka ezali kotya mitindo yango na likama, mpe yango ezali kosala ete motángo ya banyama ekita. Na ndakisa, ba gorilles ya ngomba etángamaka lokola oyo ezali na likama monene ya kolimwa. Kobatela mitindo yango ezali na ntina mingi kaka te mpo na bikelamu ndenge na ndenge, kasi mpe mpo na kobatela ba écosystèmes oyo bato batalelaka[7],[8].
Talá mpe
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba notes na ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ (en) FAO, « Global Forest Resources Assessment », sur FAO, 2021 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (en) WWF, « Forests of the Congo Basin », sur WORLDWILDLIFE, 2020 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (en) International Union for Conservation of Nature (IUCN), « Freshwater Biodiversity in the Congo River Basin », sur IUCN, 2020 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (en) United Nations Environment Programme (UNEP), « State of the World's Lakes », sur UNEP, 2020 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (en) African Wildlife Foundation, « Conservation in the Savannas of Africa », sur AWF, 2021 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (en) Conservation International, « Grasslands and Savannas », sur CONSERVATION, 2020 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (en) World Wildlife Fund, « Great Apes in the Democratic Republic of the Congo », sur WORLDWILDLIFE, 2021 (consulté le 11 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) Conservation International, « Convention sur le commerce international des espèces de faune et de flore sauvages menacées d'extinction (CITES). », sur CITES, 2022 (consulté le 11 yanwáli 2026)