Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Ba ressources naturelles durable na République Démocratique du Congo

Útá Wikipedia.

République démocratique du Congo ezali na bomengo ya biloko bizalisami, mingi na yango ezali na ntina mingi mpo na mbongwana ya nguya ya seko [1].Mboka yango ezali na ba réserves ya ba minerais ya motuya lokola cuivre, cobalt, mpe lithium, oyo ezali na ntina mingi mpo na ba technologies ya vert. Bokambami ya seko ya makoki wana ezali na tina mingi pona botomboli nkita pe bobateli zinga zinga[2].

Makoki ya mabanga ya ntalo

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

République démocratique du Congo, ezali na ba réserves ya minerais ya minene, na kati na yango cuivre, cobalt, na coltan, oyo ezali na tina mingi pona ba industries ya technologie pe ya énergie. Engebene na Institut ya gouvernance ya ba ressources naturelles (2023), ba ressources wana ezali fondamentale pona transition énergétique. Lisusu, IMPACT (2023) emonisi ete RDC ezali moko ya bikolo oyo ezali na bozwi mingi na mokili mobimba na bozwi ya mabanga ya ntalo, oyo ezali komonisa libaku monene ya bokoli[3],[4].

Bazamba pe bikelamu ndenge na ndenge

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bazamba ya RDC ezali na biloko ndenge na ndenge ya bomoi mpe ezali na mokumba monene mpo na kobongisa klima. Bokambami na bango ya seko ezali na ntina mingi mpo na kobatela écosystème oyo ekeseni na mosusu. Réseau ya ba ressources naturelles (RRN) ezali na tina ya kolendisa boyangeli ya mayele pe ya seko ya bomengo ya zamba. Botalisi ya Société civile na RDC elakisi pe tina ya boyangeli bazamba na ndenge ya seko pona bolamu ya baimboka ya mboka[5],[6].

Énergie Renouvelable

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

RDC ezali na makoki mingi na ba énergie renouvelable, mingi mingi na ba ressources hydroélectriques na yango. Kokolisa secteur oyo ekoki kopesa maboko na bowumeli zinga zinga, ndenge elakisami na Invest in RDC (2023), oyo ekanisaka ete boyangeli makoki ya bozalisi ekoki kozala na bopusi malamu na bokoli ya nkita. Nations Unies (PNUE) (2023) ebakisi ete makoki ya mabanga ya ntalo ya RDC ekoki kosala mosala monene na mbongwana ya nguya ya mokili mobimba[7],[8].

Mikakatano mpe Mabaku

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Atako bomengo na yango ya bozalisi, RDC ezali kokutana na mikakatano mpo na kotambwisa mpe kosalela bozwi na yango. Kotombola boyangeli ya polele pe ya seko ezali na tina pona kopesa matomba mingi pona bato. Centre ya mombongo mpe makoki ya bomoto (2023) esengi mbongwana na boyangeli makoki mpo na kosala ete bokoli ya bosembo mpe ya seko[9],[10].

Ba notes na ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  1. (fr-FR) Business and Human Rights Centre, « Nous avons besoin de changer la gestion des ressources naturelles en République Démocratique du Congo », sur BUSINESS-HUMANRIGHTS, 2023 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  2. UNEP - UN Environment Programme, « Les ressources minérales de la République démocratique du Congo peuvent », sur UNEP, 2026 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  3. Natural Resource Governance Institute, « République Démocratique du Congo », sur RESOURCEGOVERNANCE, 2023 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  4. IMPACT, « République Démocratique du Congo - IMPACT », sur IMPACTTRANSFORM, 2023 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  5. CNCD-11.11.11., « Une évaluation du Réseau Ressources Naturelles de la Société Civile de la RD Congo », sur CNCD, 2023 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  6. Norad, « République Démocratique du Congo - IMPACT », sur NORAD, 2006 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  7. Invest in DRC, « Ressources naturelles et profil géographique - anapi », sur INVESTINDRC, 2023 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  8. UNEP - UN Environment Programme, « Les ressources minérales de la République démocratique du Congo peuvent », sur UNEP, 2006 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  9. Business and Human Rights Centre, « NOUS AVONS BESOIN DE CHANGER LA GESTION DES RESSOURCES NATURELLES EN REPUBLIQUE DEMOCRATIQUE DU CONGO », sur BUSINESS-HUMANRIGHTS, 2023 (consulté le 11 yanwáli 2026)
  10. Natural Resource Governance Institute, « REPUBLIQUE DEMOCRATIQUE DU CONGO », sur RESOURCEGOVERNANCE, 2006 (consulté le 11 yanwáli 2026)


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.