Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Baraje ya Tshopo

Útá Wikipedia.

Baraje ya Tshopo epesaka centrale hydroélectrique oyo etongamaki na juillet 1954 mpe ezwami na République démocratique du Congo na ebale Tshopo, na etuka ya Tshopo oyo mboka-mokonzi na yango ezali Kisangani (kala Stanleyville ).

Na 1949, bazongisaki nguya na izini ya Stanleyville-River ya lobɔkɔ ya mwasi na ndenge batyaki motɛrɛ moko ya 250 kW mpe engbunduka moko ya 270 hp. Na 1950, batyaki masini moko ya makasi na esika yango.

Union ya électrification ya Stanleyville, esalamaki na 1948 na C.F.L. elongo na Regideso na mokano ya koyekola bokangi mayi ya Tshopo, ekotaki na 1950 na kapita ya Société des Forces Hydroélectriques de l'Est de la Colonie oyo ezalaki na mokumba ya kotonga centrale hydroélectrique na ebale Tshopo na Stanleyville.