Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Boombo na Niger

Útá Wikipedia.
Boombo na Niger
aspect dans une région géographique
Aspect deBoúmbu Bokomi
PaysNizer Bokomi
Date de dissolution, d'abolition ou de démolition5 máyí 2003 Bokomi

Atako boombo epekisama banda 1999 mpe ekómaki mabe oyo mibeko epesaka etumbu banda 2003[1] na Niger, bato mingi mikóló mpe bana bazali naino kozala lokola biloko ya moto moko to ya libota moko. Na 2015, balobaki ete pene na bato 800 000 bazalaki na bombo na Niger[2].

Bokabwani ya bato na kati ya lisanga mpe ya bituluku ya bikólo ndenge na ndenge

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na kati ya bato ya arabe, peul, toubou mpe touareg, bankolo mosusu bazali naino kosalela boombo ndenge balingi, bazali kozwa mosala na bango, kozala na bokonzi likolo ya bana na bango mpe biloko na bango[3][4].

Kobanda 1903 kino 1905, basalaki bolukiluki na likambo ya boombo. Nsima na yango, likambo yango ekitaki na masolo ya bato, kasi boombo etikalaki kaka. Na 1901, mokanda ya Ponty epekisaki bankolo ya boombo kozongisa bato oyo bakimaki mpe bakimelaki epai ya bokonzi ya Franse[5]. Ata nsima ya lipanda ya mboka, makambo ebongwanaki te[6].

Ezali ndenge nini sikoyo

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Kokoba ya boombo ya bonkoko na Niger ezali kolendisama na kimya oyo mbala mingi ezali ya boyokani ya bato mosusu ya mayele ya Niger, oyo mingi na bango bawutaka na bokonzi ya bonkoko[7]. Bato mingi ya mikolo, mibali, basi mpe bana bakobaki kozala lokola biloko ya moto moko to ya libota moko. Ba ONG basengeli kobunda na kilo ya bonkoko mpe makambo ya kobanga koloba oyo ezali kopekisa bato koloba polele[8].

Bakanisaka ete ekoki kozala kati na bato 43 000 kino 800 000 oyo bazali na boombo na Niger, kati na masanga ya bato ya Touareg mpe Arabe oyo bafandaka na sudi ya Sahara[9].

Na kolanda Ali Bouzou, secrétaire général ya ONG ya kobundisa boombo Timidria, na mobu 2015 Niger ezalaki na bato 870 363 oyo bazalaki na boombo. Ali Bouzou alobeli mingi mimeseno ya mwasi ya mitano, babengaka yango wahaya. Ezali bana basi ya bilenge, mbala mosusu bana mike mpe oyo bautaka na libota ya boombo, babotolamaka epai ya baboti na bango mpo báteka bango mpe bábala bango na makasi; sima bakómaka kosalela bango makasi, mpe mosusu kati na bango bakutanaka na kosalela bango mabe ya nzoto[10].

Maloba ya nse mpe ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  1. Le Niger compte ses esclaves
  2. Esclavage au Niger: le combat pour la liberté
  3. Le droit contre l'esclavage au Niger, Roger Botte
  4. L'esclavage chez les Touaregs de Bankilaré au miroir des migrations circulaires
  5. Les sociétés Songhay-Zarma (Niger-Mali): chefs, guerriers, esclaves, paysans - Jean-Pierre Olivier de Sardan - Google Livres
  6. Étude sur le dénombrement des victimes de L’esclavage au Niger
  7. ÉTAT DES LIEUX DE LA LUTTE CONTRE L’ESCLAVAGE TRADITIONNEL AU NIGER
  8. « Esclavage au Niger: le combat pour la liberté », sur LExpress.fr, (consulté le 20 sɛtɛ́mbɛ 2022)
  9. « L’esclavage, sujet tabou au Niger », sur The New Humanitarian, (consulté le 20 sɛtɛ́mbɛ 2022)
  10. « Benedetta Rossi : « Au Sahel, l’idéologie qui justifie l’esclavage n’est pas complètement morte » », sur Le Monde, (consulté le 24 mársi 2025)