Bopusi ya mbongwana ya tango na bilanga na RDC

Bopusi ya mbongwana ya tango na bilanga na République démocratique du Congo ezali komonisa moko ya mikakatano ya makasi ya ekeke ya 21, na bopusi ya mozindo na ba secteurs nionso ya société, mingi mingi bilanga. Na République démocratique du Congo (RDC), mboka oyo ezali na bozwi mingi na biloko ya bomoi mpe na bikelamu ndenge na ndenge, bilanga ezali moboko monene ya nkita mpe ya bomoi ya bamilio ya bato. Kasi, makambo oyo mbongwana ya klima ezali kobimisa ezali kotya bilei mpe nkita na likama[1],[2].
Bokeseni ya mbula
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Mbongwana ya tango ezali kosala mbongwana monene na ndenge ya mbula, oyo ezali kosala mbala moko bopusi na bozali ya mayi mpo na bilanga. Basali bilanga ya Congo batyaka motema mingi na mbula oyo ebɛtaka na eleko mpo na kosopela milona na bango mai. Ntango molai ya kokauka ekoki kokitisa bokeli bilanga, nzokande mbula makasi ekoki kobimisa mpela, kobebisa milona mpe biloko ya bilanga. Bokeseni oyo ezali kopesa mikakatano na mwango ya eleko ya kolona pe ematisaka likama ya bozangi bilei, mingi mingi na ba régions oyo ezali na likama mingi[3],[4],[5].
Ba Températures oyo ezali komata
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bokóli ya molunge ezali kobebisa mbuma ya milona oyo ekoki kozwa molunge lokola masangu, loso, mpe manioko. Température makasi ekoki komema na stress ya mayi mpe kokitisa photosynthèse, na yango kozala na bopusi na mbuma. Boyekoli esakoli ete mbuma ekoki kokita na 5% na mobu 2030 mpe kino na 10% na mobu 2050 soki ba mesures ya adaptation esalemi te. Bokiti wana ya bokeli bilanga ezali bobele na likama te bobele libateli ya bilei, kasi mpe makoki ya basali bilanga ya kozwa mosolo, mpe yango ebakisaka bobola na bamboka[6],[7].
Biodiversité na ba écosystèmes
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Mbongwana ya tango ezali na likama ya biodiversité ya bilanga na République démocratique du Congo (RDC), ezali kotungisa mitindo ya milona ya bonkoko mpe ezali kopesa nzela na kopalangana ya ba niama mabe mpe bokono. Kobungisa biodiversité ekoki kokitisa bokasi ya ba systèmes agricoles na makama ya climat, kosala ete milona ezala na likama mingi na ba chocs ya zinga zinga. Lisusu, kotya motema na motángo moke ya mitindo ya milona ekoki kosala ete basali bilanga bázala na likama ya kozwa maladi mpe na makambo ya ntango makasi[8],[9].
Talá mpe
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba notes na ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ (fr-FR) « RDC:MINISTERE DE L'AGRICULTURE : "OLITIQUE DE L’AGRICULTURE DURABLE DE LA RÉPUBLIQUE DÉMOCRATIQUE DU CONGO" », sur FAOLEX.FAO, septembre 2022 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) BANQUE MONDIALE, « République démocratique du Congo (RDC) Rapport sur le climat et le développement du pays 2023 », sur BANQUE MONDIALE, 2023 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) BANQUE MONDIALE, « L'Adaptation aux changements climatiques (RESSAC, 2021) », sur ressacnetwork.org, 2021 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) « Impact des changements climatiques sur l'agriculture et la sécurité alimentaire (UAPS, 2015) », sur popconf.org, 2015 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) Jérémie Kyaswekera, « RDC : Comment les agricultrices résistent face aux effets du changement climatique à Lubero », sur MONGABAY, 07 juillet 2025 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) Léonard Mavoungou, « L'agroalimentaire en RDC et le réchauffement climatique », sur ResearchGate, 2023 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) IOSR Journal, « Résilience des agriculteurs face aux changements climatiques », sur iosrjournals, 2022 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) UNFCCC, « Plan national d'adaptation aux changements climatiques (UNFCCC, 2018) », sur UNFCCC, 2018 (consulté le 7 yanwáli 2026)
- ↑ (fr-FR) FAO, « République Démocratique du Congo : État des lieux et perspectives (FAO, 2017) », sur FAO, 2017 (consulté le 7 yanwáli 2026)