Bosoto ya baplastiki na Kisangani

Bosoto ya plastiki na Kisangani, ezali mokakatano monene, na lolenge ndenge na ndenge ya bosoto eyanganaka na balabala, kokanga ba gouttières mpe kosala mpela ebele[1]. Bato bazali koyeba mingi bopusi ya likambo oyo na ezingelo mpe na bokolongono, lokola engumba mobimba ezali kokutana na mikakatano ya zinga zinga oyo ezali se kokola oyo ezali na boyokani na bosaleli mabe ya bosoto ya plastiki. Na ba quartiers mingi, milangi, ba sacs, mpe ba emballages eyanganaka pembeni ya bosoto oyo ekoki kobeba, kasi kozanga ko traité yango malamu[2],[3].
Lolenge ya ba esika ya bosoto ya plastiki
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Engumba ya Kisangani ezali kokutana na accumulation ya bosoto ya plastique oyo ezali kokola oyo ebebisaka zinga zinga pe ebebisaka bokolongono bwa nzoto ya bato bansoe[2].
Ntina ya bosangisi bosoto ya plastiki
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ezali na bantina ebele oyo etali bosangisi bosoto ya plastiki na engumba-etuka ya Kisangani[4] :
- Kozanga ba infrastructure ezali kokambama ya bosoto, oyo esali que ba systèmes ya bosangisi pe traitement ya bosoto ezala te, esalisaka na accumulation ya ba plastiques na ba balabala pe na ba gouttières[4],[5] ;
- Bizaleli ya bavandi, mpo na bozangi boyebi mpe mateya na ntina ya misala ya bozongisi biloko mpe ya boyangeli bosoto, ezali kolendisa bato babwaka bosoto na bango ya plastiki na bozalisi ;
- Mikakatano ya nkita, oyo ezali kopekisa makoki ya bakonzi ya mboka mpo na kotia mosolo na ba solutions ya boyangeli bosoto na ndenge ya seko ;
- Kolekisa ndelo, na kosalela mingi biloko ya plastiki oyo ekoki kobwakama mbala moko na bomoi ya mokolo na mokolo, ebakisaka motángo ya bosɔtɔ ya plastiki oyo ebimaka.
Bampasiya zinga zinga pe ya santé
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bato ya ville ya Kisangani ezo souffrir na ba makambo oyo ekoki kobima na ezingelo pe santé ebele[5],[6] :
- Bopusi ya bosoto ya plastiki na zingazinga ebebisaka ba écosystèmes ya mboka, ekangaka ba drains, mpe esalaka mpela, ebebisaka bikelamu ndenge na ndenge na kobebisa mabele mpe banzela ya mai[1] ;
- Makama mpo na bokolongono ya bato banso oyo euti na bosangisi bosoto ya plastiki ezali na boyokani na bomati ya bokono lokola malaria mpe bokono ya diarrhee, mpo na bopanzani ya ba vecteurs (lokola ngungi) na bisika oyo bosoto ekangami.[7]
- Mikakatano ya nkita mpe ya bomoi oyo etali boyangeli malamu te ya bosoto ya plastiki ezali mokakatano monene mpo na lisanga ya Congo, mpe mingi mingi mpo na engumba Kisangani, oyo ememi na bomati ya ntalo ya bokolongono mpe bokiti ya lolenge ya bomoi[8].
Ba solutions oyo esengami
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bopanzi sango pe mateya oyo esalemi na bokeli ba campagnes na biteyelo pe ba quartiers pona koyebisa bato na ntina ya ba impacts négatifs ya ba déchets plastiques, tango wana kosala ba centres ya collecte ya ba plastiques oyo esalelami pona ko kosalisa kozongisa biloko na mosala pe kokamba ya bosoto[9] ,[10]
Talá mpe
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba liens ya libanda
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Masolo oyo etali yango
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba notes na ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- 1 2 « Kisangani les Déchets Plastiques Menace pour Environnement », sur africa-press.net (consulté en 28 décembre 2025)
- 1 2 « Tshopo: Kisangani face au fléau des déchets plastiques: une menace silencieuse », sur kis24.info (consulté en 28 décembre 2025)
- ↑ « RDC-Kisangani : les déchets plastiques, une menace persistante pour l’environnement et la santé », sur provinces26rdc.com (consulté en 28 décembre 2025)
- 1 2 « Contribution à la lutte contre l’insalubrité liée aux bouteilles en plastique dans la ville de Kisangani en République Démocratique du Congo. Etude menée dans la commune de Tshopo », sur csnrdc.net, (consulté en 28 décembre 2025)
- 1 2 « Contribution à la lutte contre l’insalubrité liée aux bouteilles en plastique dans la ville de Kisangani en République Démocratique du Congo. Etude menée dans la commune d e Tshopo », sur rcst.cd (consulté en 28 décembre 2025)
- ↑ « Tshopo:attitude de la population sur la gestion des déchets plastiques son impact sur la sante », sur journalajst.com (consulté en 28 décembre 2025)
- ↑ « Contribution à la lutte contre l’insalubrité liée aux bouteilles en plastique dans la ville de Kisangani en République Démocratique du Congo. Etude menée dans la commune d e Tshopo », sur rcst.cd (consulté en 28 décembre 2025)
- ↑ « RDC étouffée par le plastique : une urgence environnementale ignorée », sur tshikapanews.net (consulté en 28 décembre 2025)
- ↑ « TPour une ville plus propre, la commune Kisangani installe ses premières poubelles publiques », sur depechesdelatshopo.com (consulté en 28 décembre 2025)
- ↑ « Comment valoriser les déchets plastiques dans les zones urbaines de la RDC ? », sur journalajst.com (consulté en 28 décembre 2025)