Camp ya basoda Ketele
Camp ya basoda Ketele ezali camp ya basoda mpe esika ya baoyekoli ya Mampinga ya basoda ya ekolo Congo démocratique (FARDC), ezwami na commune ya Makiso, na Kisangani, na Boulevard Mobutu, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki zomi longwa na libándá ya mpɛpɔ ya Kisangani Bangoka.
Lisolo ya kala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Abatisami na kombo ya Sergent camps Ketele na souvenir ya congolais moko oyo apesaki vie na ye pona Belgique na 1916. Camp oyo e inauguré na 1935 mpe kala ezalaki na troisième compagnie ya Artillerie na Infanterie, précisé historien Jules OKETE LONGE WATUKU[1].
Divertissement na loisir
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na septembre 2022, édition ya liboso ya tournoi ya camp inter-militaire esukaki na style, dimanche le 11 septembre 2022 na terrain ya camp Sergent Ketele, na finale entre Galaxy ya ba camps ya Ketele na équipe ya camp Katako.
Bakonzi mingi ya engumba bakendeki na molulu ya masano oyo, kati na bango président ya association ya football urbain ya Kisangani (EUFKIS) Toto Mulowe elongo na secrétaire na ye Guyalain Moweni, commandant ya 31e région militaire, Général William Balengela lokola mpe Colonel Kalulu[2].
Mikakatano ya mabele
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na mars 2019, mabota mingi oyo bavandi na quartier commercial sima ya camp militaire ya Sergent Ketele, na commune Makiso, babenganamaki na makasi na ba militaires FARDC wuto samedi le 2 mars 2019. Commandement ya 31e région militaire elakisi que ordre ya kosala déplacement oyo ewutaki na ba supérieurs hiérarchiques na yango, na but ya kotonga lisusu camp oyo. Mabota oyo babenganaki bango na bandako oyo bazalaki kofanda atako bongo balobaka ete bazwaki mikanda ya mabele na ndenge ya malamu. Ba soldats ya FARDC bazalaki wana ndenge tozali koloba. Majorité ya population bazali déjà libanda, amilelalelaki mofandi moko ya esika eye.
Commandant ya 31e région militaire, Général de brigade Alembiya Atepezia Nzambe, tango batunaki ye mpo na progrès ya opération oyo, a estimé que « oyo atonga na complot ya mutu mususu, atongaka pona basusu ». Engebene na oyo ya suka, mabota maye manso bavandi nzinganzinga ya camp ya Sergent Ketele bapesameli mitindo ya kolongwa na esika eye wuto 2015. Azali kopesa ntina ete mabele maye mazali kolobelama mazali na kati ya domaine militaire. Oyo ezali opération ya mibale ya lolenge na yango sima na yango nzinganzinga ya aéroport militaire ya Simi Simi na septembre 2016[3],[4].
Uta ntango ya Costant Lomata, na nzela ya Louis-Marie Walle Lufungula kino Madeleine Nikomba Sabangu, bakisa mpe bokiti nyonso oyo esalemaki, kino sikoyo, bato bazelaka ntango nyonso kobomama ya “piblisite hoc” epesi balapolo ya commission. Population oyo ezali kaka kozela exécution ya rapport ya commission ad hoc, dossier oyo ezali base ya mobulu ya mbala na mbala oyo ekambami na bana ya ba évacués na coin oyo ya ville[4].
commission oyo esilaki ko identifier ba marqueurs frontières oyo ba belges batikaki na camp ya liboso ya ba travailleurs ya compagnie Tabacongo lelo sergent ya camp Ketele[4],[5].
Camp ya Sergent Ketele na commune ya Makiso ekabwani na biteni mibale (2) kati ya population militaire na civile, kolanda ba conclusions ya commission oyo etiamaki pona yango na autorité provinciale, oyo ezali ntuku minei na libwa (49) hectare[5].
Mateya ya ntina
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Talá mpe
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Masolo oyo etali yango
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba liens ya libanda
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Maloba mpe Ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ « Kisangani : Camp Ketele, places du canon et Saio, …le CT Jules OKETE Longe explique les sites historico-militaires à l’occasion de la journée FARDC », sur depechesdelatshopo.com, 19 mai 2024 (consulté en 22 janvier 2025)
- ↑ « Kisangani: Tournoi inter camps militaires : Galaxy du Sergent Camp Ketele sacré Champion », sur kabalisolo.com, 13 septembre 2022 (consulté en 23 janvier 2025)
- ↑ « Kisangani : plusieurs familles délogées du camp Ketele », sur radiookapi.net, 06 mars 2019 (consulté en 23 janvier 2025)
- 1 2 3 « Kisangani : Les déguerpis du Camps Sergent Ketele crient Justice », sur kis24.info, 31 mars 2024 (consulté en 23 janvier 2025)
- 1 2 « Les militaires et les populations se partagent 49 hectares du camp sergent KETELE », sur acp.cd, 05 août 2020 (consulté en 23 janvier 2025)