Chantal Chambu Mwavita
| Chantal Chambu Mwavita | |
| Fonctions | |
|---|---|
| Ex-Ministre des Droits Humains - RDC | |
| Mokonzi wa ekólo | Félix Tshisekedi |
| Moyángeli wa yambo | Judith Suminwa |
| Mbulamatáli | Suminwa |
| Moyamboli | Albert Fabrice Puela |
| Mokitani | Samuel Mbemba Kabuya |
| Biographie | |
| Nom de naissance | Chantal Chambu Mwavita |
| Date de naissance | Mois invalide (novembre) |
| Lieu de naissance | Kalehe (Congo-Kinshasa) |
| Nationalité | congolaise |
| modifier |
|
Chantal Chambu Mwavita, abotami le 27 novembre 1969 na Kalehe (province ya Sud-Kivu, République démocratique du Congo), azali avocat mpe politicien. Azalaki ministre ya Droits de l’homme ya République démocratique du Congo kobanda sanza ya mitano 2024 kino sanza ya mwambe 2025[1].
Biographie
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Chantal Chambu Mwavita, mwana mwasi ya Chambu Emmanuel na Nzigire Igega, abotami na esanga ya Iko, na territoire ya Kalehe[2]. Abandaki mosala na ye ya kelasi na diplôme ya droit na université ya Kinshasa na République démocratique du Congo[2].
Akobaki boyekoli na ye na Université catholique ya Louvain-la-Neuve na Belgique, esika wapi azuaki diplôme spécialisé na droit ya droits de l’homme[2]. Na sima master ya Europe na médiation, gestion mpe résolution ya conflit na université Kört Bosch na Sion, Suisse[3]. Na mokolo ya 4 mai 2023, abungisaki bato ya libota na ye na mpela mpe kokita ya mabele oyo ezwaki bamboka ya Bushushu mpe Nyamukubu na District ya Kalehe[4], mpe ebomaki bato koleka 400[5].
Parcours politique
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Mobundi ya makoki ya bomoto mpe moto na politiki ya Congo, akoti na politiki na kokota na Mouvement démocratique national pour la progrès (sigle MONADEP), oyo akomaki président[2].
Avocat na formation, azali fondateur ya université ya kimia mpo na développement (UPD asbl), organisation oyo esalaka mpo na kosunga ba prisonniers mpe batu oyo bazali vulnérables. Asali pe ba centres ya formation pona bopesi makoki na basi pe ba services ya micro-crédit pona kosunga ba initiatives économiques ya basi[6]. Azali mpe kosamba liboso ya Cour d’appel ya Goma[2].
Ministre
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na mokolo ya 29 mai 2024, aponamaki Ministre ya Makoki ya Bomoto na Gouvernement ya Suminwa oyo ekambamaki na Judith Suminwa Tuluka[2]. Nomination oyo ezali ko représenter point de retour na carrière politique na ye[2].
Na 2023, Chantal Chambu Mwavita aponamaki mpo na ebonga ya Député national mpe Sénateur na maponami ya 2023. Atako alongaki maponami maye te, bosangani na ye lokola candidat ezalaki litatoli ya bomipesi na ye mpe lisusu etombolaki bososoli ya bato na makambo matali bosembo ya bato, bokokani ya mibali na basi mpe bobateli makoki ya bomoto na RDC[7]. Apesaki mpe nzela na boponami lisusu ya président Félix Tshisekedi[2].
Voir aussi
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Notes et références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ « Le nouveau ministre des Droits humains place son mandat sous le signe de l’assiduité », sur Radio Okapi, 12 août 2025 (consulté en 23 septembre 2025)
- 1 2 3 4 5 6 7 8 « Chantal Chambu Mwavita; De la Cour d’appel de Goma au ministère des droits humains », sur Kivu Nyota Presse, (consulté le 21 dɛsɛ́mbɛ 2024)
- ↑ (fr-FR) fatshimetrie, « Chantal Chambu Mwavita : Une voix inspirante pour les droits humains en RDC », sur Fatshimetrie, (consulté le 12 dɛsɛ́mbɛ 2024)
- ↑ (en-US) CHOMACHOMA, « Drame Kalehe : Me Chantal Chambu salue l'acte posé par le Chef d'État », sur CNTLIVE.COM, (consulté le 21 dɛsɛ́mbɛ 2024)
- ↑ « En RDC, les torrents de boue asphyxient l’est du pays », Le Monde, (lire en ligne)
- ↑ « RDC: retour sur le parcours de Chantal Chambu Mwavita, Ministre des droits humains », sur Actualite.cd, (consulté le 23 sɛtɛ́mbɛ 2025)
- ↑ « Le Gouvernement veut avoir accès aux monitorings sur les droits humains », sur Radio Okapi, (consulté le 23 sɛtɛ́mbɛ 2025)