Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Claude Haffner

Útá Wikipedia.
Claude Haffner
une illustration sous licence libre serait bienvenue
Biographie
Naissance
Nationalités
Formation
Université de Strasbourg (en) (-)
Sorbonne Université (en) (master (en)) ()Voir et modifier les données sur Wikidata
Activité
Réalisatrice de cinémaVoir et modifier les données sur Wikidata
Père
Pierre Haffner (en)Voir et modifier les données sur Wikidata

Claude Haffner ( arabe : كلود هافنر ; abotami 1976), azali mosali ya bafilme ya France - Congo mpe mokambi ya bokeli libosoliboso kotambwisa ba films documentaires. [1] Asalaki ba documentaire mingi oyo bamemaki lofundo ya mikemike, na kati na yango Ko Bongisa Mutu, Défilé Célianthe, mpe Noire ici, blanche là-bas.

Bomoi ya moto ye moko

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Abotami na 1976 na Kinshasa, na République Démocratique du Congo na tata na ye français mpe mama moko ya Congo. Tata na ye Pierre Haffner azali mpe moluki mpe molakisi ya film na Centre culturel français na Kinshasa, oyo ezali ko influencer Claude mpo abanda carrière na ye ya cinéma. Mama na ye Sudila Mwembe azali moto ya Zaïre (Republique Démocratique du Congo ya lelo). Na âge ya muke mpenza, akendaki France na famille mpe azongaki Congo te. Na nsima, akolaki na Alsace elongo na ndeko na ye ya mobali Frédéric Haffner. Tata na ye azali na collection ya art africain elongo na ba photos na ba comptes enregistrés sur Congo na Afrique. Akufaki na 2000, wana Claude aponaki kozonga na Congo elongo na mama na ye mpo na kokutana na libota na ye ya Kongole. [2]

Uti 1994 tii 1999, asomaki Istware mpe azwaki Diplome ya Ekoló ya Cinema ná Audiovisuel na Iniversite ya Strasbourg . [3] Na 2005, Claude asilisaki diplome na ye ya master na Iniversite ya Sorbonne . [4]

Nsima ya kozwa diplome na iniversite, asalaki bafilme mikuse mingi mpo na koyekola mayele ya kosala bafilme. Na 2000, Claude asalaki lokola mokambi ya Script mpo na filme mokuse La fourchette . Sima akoti lokola assistant ya production na 'Canal +', esika azuaki makoki ya kosala na Agnès Varda, "mentor" na ye, na montage ya film Les Glaneurs et la Glaneuse . Nsima ya filme yango, akómaki na mposa ya kosala ba documentaires. Yango wana, na 2002, alandaki formation ya kosala ba films documentaires na Altermédia (centre ya formation ya Saint-Denis). [3] Na eleko oyo, atunaki mama na ye oyo azalaki kofanda na Brunstatt mpo na mboka na ye, libota na ye mpe lisolo na ye. [2]

Na 2002, Haffner ayekolaki kosala ba films documentaires na école Altermedia na Paris. Direction na ye ya liboso ezalaki " film-essay " na kombo ya Ko Bongisa Mutu na salon ya coiffure congolaise na Paris. Na 2004, akambaki documentaire La Canne musicale, promenade elongo na mosali ya ba films mpe ethnographe ya France Jean Rouch . Yango esalemaki mwa mikolo liboso ya liwa na ye. [4]

Na 2005, sima ya bambula mibale ya recherche na likambo ya Sinema ya Afrika, asalaki documentaire D'une fleur double et de 4000 autres oyo ezalaki kolobela lisolo ya Sinema ya Afrika. Sima ya filmu wana, akendeki kovanda na Afrique ya Sud na mbula moko wana. Na 2009, asalaki lokola directeur ya production mpe chercheur na docu-drame Les manuscrits de Timbuktu ya Zola Maseko mpe Par tous moyen nécessaire ya Ramadan Suleman. Claude akobaki kosala mpe koteya na ntina ya Cinéma africain na biteyelo mibale ya bafilme oyo ezalaki na Johannesburg : AFDA, The School for the Creative Economy (AFDA) mpe Big Fish School of Digital Filmmaking. Na 2011, azongi na France mpo na kozua documentaire na ye Noire ici, blanche là-bas . [4]

Filmografie

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
Year Film Role Genre Ref.
2000 La fourchette

(The fork)
Superviseur ya script Filamu ya muke
2002 Ko Bongisa Mutu

(Arrange Your Head)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2000 À fleur de peau

(On edge)
Mokonzi ya kobakisa bosaleli Filamu ya muke
2003 Remue-ménage dans le tertiaire

(A stir in the tertiary sector)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2004 La parole est une fenêtre

(The word is a window)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2004 Défilé Célianthe

(Célianthe parade)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2004 La Canne musicale

(The Musical Cane)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2005 D’une fleur double et de quatre mille autres

(Of a Double-Headed Flower and 4,000)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2005 En prépa

(In preparation)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo
2009 The Manuscripts of Timbuktu Mokonzi ya production docu-drama
2009 By Any Means Necessary Mikonzi ya production docu-drama
2010 Ce soir (ou jamais!)

(Tonight or never!)
Acteur: Ye moko TV series
2011 Noire ici, blanche là-bas

(Footprints of My Other)
Réalisateur, Scenatriste Filamu ya solo

Ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ba liens ya libanda

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  • Claude Haffner at IMDb
  1. "Claude Haffner: Director". allocine. http://www.allocine.fr/personne/fichepersonne_gen_cpersonne=600988.html. Retrieved 7 October 2020.
  2. 1 2 "Screening of "Noire ici, Blanche là-bas", a film by Claude Haffner". ifas.org. http://www.ifas.org.za/index.php/cinema-media/cinema/497-screening-of-qnoire-ici-blanche-la-basq-a-film-by-claude-haffner. Retrieved 8 October 2020. Kotánga libunga: Balise <ref> incorrecte : le nom « ifas » est défini plusieurs fois avec des contenus différents.
  3. 1 2 "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". http://africultures.com/personnes/?no=7015. Kotánga libunga: Balise <ref> incorrecte : le nom « career » est défini plusieurs fois avec des contenus différents.
  4. 1 2 3 "Error: no |title= specified when using {{Cite web}}". https://africanfilmny.org/directors/claude-haffner/. Kotánga libunga: Balise <ref> incorrecte : le nom « claude » est défini plusieurs fois avec des contenus différents.