Delcat Idengo
| Naissance | |
|---|---|
| Décès | |
| Surnom |
Delcat Idengo |
| Nationalité | |
| Activités |
Auteur-compositeur, rappeur |
| Genres artistiques | |
|---|---|
| Lieu de détention |
Delcat Idengo, na kombo naye ya solo Katembo Vinywasiki Delphin, azali moyémbi ya miziki oyo abotama na Beni, na etuka ya Nord-Kivu, na ekolo Congo démocratique. Ayebanaki lokola moto oyo azalaki kobunda mpo na mbongwana, mpe azalaki kosalela miziki na ye mpo na kotɛmɛla makambo ya kozanga bosembo mpe mobulu oyo ezalaki kosalema na mboka na ye.
Biographie
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Delcat Idengo, mwana oyo baboti na ye bakufaki na bitumba ya Beni, ayokaki mpasi mingi na motema mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na eteni wana ya RDC. Makambo oyo ye moko akutanaki na yango etindaki ye na komimonisa na miziki na ye, kofinga bakonzi ya Congo mpe basoda mpo na mokumba oyo bazalaki na yango na mobulu wana.
Mosala ya miziki
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Misala mpe bopusi
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na nzela ya banzembo na ye, Delcat Idengo amimonisaki lokola moto ya nguya mpe ya botɛmɛli, kofundáká bobomi ya basivili na Beni mpe na Irumu. Mosala na ye ya ntɔ́ki ezali mpo na kosalisa bato na koyeba makambo ya mawa oyo mazali kosalema na mboka na ye mpe kosenga ete misala ya makasi misalema mpo na kosilisa mobulu.
Ata mikakatano mpe minyoko oyo akutanaki na yango, Delcat Idengo azali kokoba komonisa elimo ya kotelemela mpe ya makasi ya ba Congolais mingi liboso ya kozanga bosembo mpe minyoko.
Kondama mpe kokangama
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Delcat Idengo akangami mbala ebele mpo na ba positions na ye contre ba régimes ndenge na ndenge na République démocratique du Congo (RDC).
Na sanza ya zomi na mibale 2021, Delcat Idengo akatelamaki etumbu ya boloko ya mibu 10 na tribinale ya basoda ya Goma. Akweyisamaki na bafundami ya kofinga mokonzi ya Ekolo, ya kobenga bato na kosimba minduki mpo na kobundisa Ekolo ya Congo mpe ya kolɛmbisa makasi ya basoda ya Forces armées de la République démocratique du Congo (FARDC). Mbala moko, baavoka na ye bayebisaki ete balingi kosamba likambo yango.
Na nsima, ntango basɛngaki ete akende kosamba, bakitisaki etumbu na ye ya bolɔkɔ na mbula mitano. Kasi, nsima ya basanza mingi na boloko ya Munzenze na Goma, Delcat Idengo abimaki na mokolo ya 19 sanza ya zomi na mibale 2023. Makambo ya sikisiki ya bokangami na ye mazali polele te, kasi emonisami ete kosangana ya bibongiseli ndenge na ndenge ya société civile, ya ba mouvements ya bana mboka mpe ya bato ya politiki ya Nord-Kivu ezalaki na ntina mingi. Ba observateurs mosusu bakanisi lisusu ete bobimisami wana ekoki kozala na boyokani na elaka ya président Félix Tshisekedi ntango akendaki na Beni na ntango ya campagne ya maponami ya 2023.
Koboma
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Delcat Idengo, moto oyo ayebanaki mingi na mboka na ye, akufaki liwa ya mawa mokolo ya minei, 13 sanza ya mibale. Engebene ba sango ya ebandeli, abetamaki na masasi mpe akufaki na ntina ya makambo oyo eyebani naino malamu te.
Kolimwa na ye ebimisi mayoki mingi, mingimingi na kati ya mouvement citoyen Lutte pour le changement (Lucha), oyo ezali komona yango lokola likama mpo na bonsomi ya koloba na République démocratique ya Congo. Ntango bolukiluki ezali kokoba mpo na koyeba ndenge nini babomaki ye, bato bazali koloba na mongongo makasi mpo na solo mpe bosembo.
Makomi na nse ya lokasa
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Talá lisusu
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Masolo oyo ekangami
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bikangiseli ya libanda
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- Page utilisant P569
- Page utilisant P19
- Page utilisant P570
- Page utilisant P20
- Page utilisant P1449
- Page utilisant P27
- Page utilisant P106
- Page utilisant des données de Wikidata à traduire
- Page utilisant P136
- Page utilisant P2632
- Article utilisant l'infobox Biographie2 avec une charte sans catégorie
- Article à illustrer Biographie
- Article utilisant l'infobox Biographie2
- Article utilisant une Infobox