Discussion:Arthur Pinzi

Le contenu de la page n’est pas pris en charge dans d’autres langues.
Útá Wikipedia.

Arthur Pinzi azalí mu Yombe mpé abotami na engbunda ya Boma, na district ya Bas-Congo, na mokolo mwa 22 marsi 1922. Atangí ba kelási na yé epayi ya ba Frères des écoles chrétiennes na colonie scolaire ya Boma tee na kinó asilisi mpé azui diplôme na yé ya école moyenne na 1938. Abandi carrière na administration publique na même année, 1938, mpe akomi na suka ya grade mutu moindo akokaki ko aspirer : Commis. Bongo, akomakii Commis na service ya géologie ya Congo belge. Asali bongo dix-huit ans de carrière na administration publique coloniale.

Na avril 1954, aponami Président ya Association du Personnel Indigène de la Colonie (A.P.I.C.)

Na 1955, Président ya Amicale libérale ya Congo belge (Cercle libéral ya Léopoldville). Yango ezalaki lier na parti libéral belge. Vice-Président ya Association des Amis des écoles laïques.

Na septembre 1956, azali kati na délégation ya ba notables Congolais oyo baponami mpo ko visiter Belgique.

Na mokolo mua 8 décembre 1957, na ba élections communales ya Léopoldville, en tant que candidat ya A.BA.KO., aponami Bourgmestre ya Kalamu mpe confirmer na arrêté n° 11/582 ya 22 décembre 1957.

Na août 1958, akeyi na exposition universelle ya Bruxelles.

Na 1958 azalai kati na seize personnes oyo ba signer pétition na Pétillon, Ministre du Congo Belge et du Ruanda-Urundi.

Na mokolo mua 12 janvier 1959, akangemi na Léopoldville mpo na ba troubles esalemaki na commune na ye ya Kalamu. Mobulu ebandaki na The Young Men's Christian Association (Y.M.C.A.) tango ba autorités ba annulaki manifestation publique ya A.BA.KO. Mpe na lolenge oyo azuaki initiative na moninga na ye Bourgmestre ya Ngiri Ngiri, Gaston Diomi, ya kotindela roi Baudoin 1er télégramme na maye masalemaki. Pinzi na Diomi babengisaki ba avocats belges oyo mpo na défense na bango : ba Maîtres Jules Chômé, Jean Terfuve na Jules Wolff. Kasi, moyen bango ba défendre bango ezalaki te mpo ba autorités coloniales basalaki nionso mpo na ko compliquer ba avocats oyo.

Na mai 1960, A.BA.KO. esengi na ye a présenter candidature na ye na Congo-Central mpe aponami Député national. Atiki ebonga na ye ya Bourgmestre ya Kalamu.

Na juillet 1960 a déposer motion ya kosenga bolimbisi na ba violences esalemelaki mindele na Congo mpe asengaki vote ya mokano mozali kolakisa ba regrets na nionso ekomelaki ba étrangers na Congo, sima ya lipanda.

Na Octobre 1960, akeyi na Bonne, na République Fédérale ya Allemagne, esika a participer na séminaire africain esalemaki kuna na likanisi ya bakonzi ya Allemagne..

Na 1961, aponami Ministre provincial ya Congo-central.

Wuta 1er Août 1961 tee na 20 mai 1962, Ministre ya finances. Ye azalaki forcer na démission sima ya débat makasi esalemaki na Parlement, na Chambre des Représentants, Pinzi apesaki démission na ye na Premier Ministre Cyrile Adoula mpe ye andimi yango na mokolo mua 20 mai 1962. Nionso oyo ewutaki na ba pointes d'ivoire saisies na ba services ya douane ya port ya Matadi. Yango etiamaki na ba entrepôts ya port. Douane ezali moko ya ba services ezali kati na ministère ya finances. Ye, asalaki mbemba ya koteka ba pointes ya ivoire wana na profit na ye. Avant wana, akueyelaki lisusu likambo ya ba fasses quittances asalisaki na kombo ya ministère ya finances oyo babandaki kofundela ye que abandaki kobendela na yango mbongo illégalement.

Na 1962 asali parti politique na kombo ya Rassemblement Progressiste Congolais.

Wuta 1964 tee na 1966, atindami na Abidjan na qualité ya Chargé d’affaires.

Kobanda 1966 tee na 1968, ambassadeur extraordinaire mpe plénipotentiaire ya R.D.Congo na Madrid. Suite na froid diplomatique ekotaki na enlèvement ya Moïse Tshombe, ba relations diplomatiques na Espagne ebebaki mua moke. Na yango, R.D.C. na Espagne ebengisaki ba ambassadeurs na bango mpo na consultation. Yango nde Pinzi azongaki na octobre 1967, na Kinshasa. Na janvier 1968 atindami comme ambassadeur extraordinaire mpe plénipotentiaire ya liboso ya R.D.Congo na Monrovia. Awe en poste na Monrovia, na 1970.

Pinzi azali na ouverture na batu ebele mpe na ba leaders politiques mpe syndicaux ya ndenge na ndenge. Azalaki proche na Lumumba wuta 1955 na Amical Libéral mpe A.P.I.C. Membre ya A.BA.KO. wuta na ebandeli. Mu Yombe lokola Président Kasa Vubu, ami syndical na Cyrille Adoula mpe confrère na kati ya franc maçonnerie ya Congo-Léopoldville. Azalaki lisusu en bon terme na Mobutu, oyo ayebaka wuta Lumumba mpe na Damien Kandolo, vice-Président na ye na A.P.I.C.

Abunda mpo na libre circulation ya batu na butu entre 21 h. ya butu na 4 h. ya tongo. Abunda lisusu mpo na respect ya ba droits de l’homme.

Mpo na kosukisa, nakobakisa que camp Pinzi oyo ezali na Yolo-Sud, na Kalamu, ebandaki kobengama camp Baudouin 1er. Ezui kombo ya Pinzi sima ya lipanda.