Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Douce Namwezi N'Ibamba

Útá Wikipedia.
Douce Namwezi N'Ibamba
une illustration sous licence libre serait bienvenue
Biographie
Naissance
Nationalité
Formation
Université officielle de Bukavu (d)
Collège Alfajiri (d)Voir et modifier les données sur Wikidata
Activités
Journaliste, militante, productrice de radioVoir et modifier les données sur Wikidata
Autres informations
Distinction
100 Women (en) ()Voir et modifier les données sur Wikidata

Douce Namwezi N'Ibamba, abotami na mokolo ya 11 février 1989 na Bukavu, azali mosakoli ya sango, mosaleli ya radio mpe entrepreneur social ya République démocratique du Congo, oyo alingi kopesa makoki na basi mpe bilenge na nzela ya culture, éducation mpe formation, na accent na égalité ya mibali na basi mpe hygiène.

Biografi ya bomoi ya bato

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

N'Ibamba abotami o 11 février 1989 na Bukavu, engumba oyo ezali na libongo ya sud-ouest ya lac Kivu, mboka-mokonzi ya etuka ya Kivu du Sud, na République démocratique du Congo . Baboti na ye bango mibale bazali ba infirmiers [1] . Azali moko ya bana mwambe [2] . Ntango azalaki na mbula mwambe, libota na ye esengelaki kokima ndako na bango mpe kofanda elongo na bato mosusu oyo balongolamaki na bandako na bango mpo na mwa ntango, nsima ya bitumba ya bana-mboka mpo na kozwa bokonzi [2] . Atangi na Collège Alfajiri mpe sima azui diplôme ya relations internationales na université officielle ya Bukavu . Uta bomwana, N'Ibamba alingaki kokoma mopanzi sango, kasi bato mingi bayebisaki ye ete ezali mosala ya basi te [2] . Kasi, na mokano, abandaki kobimisa ba émissions ya radio na âge ya 16 ans na station ya radio catholique, Radio Maria, mpe 2 ans sima tango akoti na Association des femmes en médias du Sud Kivu (AFEM) ya République démocratique du Congo Na tango wana, RDC ezalaki na bitumba mpe N’Ibamba akabolaki na émission masolo ya ba soldats ya bana mike ya kala mpe ba viols en masse [3] Après 10 ans na bango AFEM, azuaki ebonga ya coordonnatrice intérimaire .

Na 2016, N'Ibamba azwaki mokumba ya programme na MAMA Radio, radio moko oyo etalaka mingi ntina ya kobatela boyokani kati ya mibali na basi. Na 2018, atiki MAMA Radio mpo na kotonga Initiative Uwezo Afrika, ebongiseli ya mosala ya kozanga koluka mbongo, oyo ebundaka mipanzi ya maloba ya soni (tabous) etali mikolo ya sanza ya basi na nzela ya boyekoli mpe mayele ya hygiène sexuelle. Basalaka yango na nzela ya journalisme, formations professionnelles mpe entrepreneuriat social mpo na kopesa basi makoki ya komibatela. Ebongiseli yango epesaka mpe ba kits ya bopeto ya nzoto mpe ya mikolo ya sanza epai ya basi ya RDC, na ndenge ya kopesa ba serviettes menstruelles oyo ekoki kosalelama lisusu mpe kosukolama. Na 2020, elongo na ba structures culturelles motoba ya engumba Bukavu, Douce atomboli Espace Culturel KWETU ART, oyo azali présidente ya Conseil d’Administration.

Na suka ya 2020, BBC etangamaki na liste na yango ya mbula na mbula ya basi oyo bazali na bopusi mingi na mbula , .

Ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

 

  1. Kotánga libunga: Balise <ref> incorrecte : aucun texte n’a été fourni pour les références nommées UwezoAfrika2020
  2. 1 2 3 (nl) {{Ouvrage}} : paramètre titre manquant

Ba liens ya libanda

[kokoma | kobɔngisa mosólo]