Inspection générale des finances (république démocratique du Congo)
Inspecteur général ya misolo « IGF » ezali organisme ya Leta ya RDC oyo ezali na mokumba ya kokengela mpe kotala ndenge mbongo ya Leta ezali kosalelama. Ezali na ntina mingi mpo na kosilisa kanyaka mpe kobebisa mbongo ya Leta.
Lisoló ya kala mpe misala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]IGF esalemaki na mokolo mwa 15 Sɛtɛ́mbɛ 1987, mpo na kobatela malamu makambo matali mosolo ya Leta mpe kopengola mbeba ya mosolo ya Leta. Ezali na nse ya bokonzi ya Président ya République mpe mosala na yango ya liboso ezali ya kosala ete mbongo ya Leta esalelama malamu mpe ete Leta esalela mbongo na ndenge ya polele.
Misala na ye ezali:
- Kotánga mpe kolandela makambo ya mbongo ya Leta, ata mpe ya bibongiseli ya Leta mpe ya bakompanyi oyo Leta nde akambaka.
- Kotya miso na ndenge oyo mbongo oyo guvɛrnema ezali kobimisa ezali kolanda mibeko mpe malako oyo ezali na ntina.
Koboya mpe kobundisa kanyaka mpe kozanga kosalela mbongo na ndenge ebongi te.
- Kotya likebi na mibeko ya Leta na oyo etali makambo ya mbongo.
Ebongiseli mpe ndenge ya kosala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]IGF ekambami na Jules Alingete, inspecteur général ya finances, oyo aponami na mokonzi ya mboka. Ezali na ba inspecteurs mpe ba vérificateurs oyo bazali na mokumba ya kosala ba enquêtes mpe ba audits na ba secteurs ndenge na ndenge ya administration publique.
Ebongiseli yango ezali kosala elongo na bibongiseli mosusu ya bokengi lokola Cour des comptes mpe Agence de prévention et de lutte contre la corruption (APLC). Balapolo ya IGF ekoki kotindama na bazuzi soki emonani ete ezali na bokosi.
Biloko asali mpe impact
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na bambula oyo euti koleka, IGF emonanaki na misala ya ntina mingi mpo na kobundisa kanyaka na RDC. Asalaki ba vérifications mpe ba contrôles mingi oyo ememaki na koyeba mbeba na ndenge ya kosalela mosolo ya Leta mpe na kofunda ba cas ya ba détournement.
Kati na makambo ya minene, IGF emonisaki mbeba na ba ministères mpe na ba entreprises publiques ndenge na ndenge, oyo ememaki na bitumbu mpe na kosambisa bakonzi mosusu oyo bazalaki na mbeba.
Botɛmɛli mpe mikakatano
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Atako IGF ezali kokende liboso, ezali na mikakatano mingi, na ndakisa:
- Kozanga biloko ya mosuni mpe mbongo mpo na kokokisa mikumba na ye.
- Makambo ya politiki oyo ekoki kobongola ndenge ya kosala baankɛtɛ mosusu.
- Mosala ya batribinale ezali kosala malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na kosilisa makambo ya kanyaka.
Inspection Générale des Finances ezali mosani monene ya bokengi ya mbongo na RDC. Atako ezali na mikakatano, ezali na ntina mingi mpo na kobongisa bibongiseli ya Leta mpe kotombola boyangeli ya malamu. Mosala na ye ezali na ntina mingi mpo na kozongisa elikya ya bana-mboka na bibongiseli ya Leta.
Makambo mosusu