Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Jean-Baptiste Ntahwa Kuderwa

Útá Wikipedia.
Jean-Baptiste Ntahwa Kuderwa
Fonction
Minister of Budget
-
Biographie
Naissance
18 juillet 1955
Kanyola au Sud-Kivu
Nom de naissance
Norbert Basengezi Katintima
Nationalité
Activités

Jean-Baptiste Ntahwa Kuderwa Batumike azali moto ya politiki ya Congo démocratique abotama na mokolo ya 18 sanza ya nsambo 1955 na Kanyola. Azalaki ministre ya budget na mbulamatari ya Muzito II kobanda 19 février 2010 kino 6 avril 2012.

Biografi ya bomoi ya bato

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nthawa Kuderwa abotamaki na mokolo ya 18 sanza ya nsambo 1955 na Kanyola na secteur Ngweshe ya territoire ya Walungu na Sud-Kivu. Atángaki kelasi ya ebandeli mpe ya mibale (lingomba ya mikanda) na Alfadjiri College na Bukavu, epai azwaki diplome na 1975. Azwaki diplome na makambo matali nkita na École nationale des finances na 1980. Kaka na mbula wana, abandaki mosala na ye na Ministère ya Finances mpe ya Budget na direction ya Contrôle-Budget, mpe na nsima aponamaki lokola vérificateur ya ba dépenses engagées.

Na 1984, ayekolaki makambo etali banki na Finafrica Milan na Italie. Azwaki diplome ya licence na sciences économiques (économie internationale mpe monnaie) na Université libre ya Kinshasa na 1996. Na 2002, azwi diplome na finances publiques na Institut ya Fonds monétaire international na Washington, mpe na 2005, diplome na préparation mpe exécution ya budget ya l'Etat na École nationale d'administration na Paris.

Banote mpe ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]