Kamp yaba soda ya Mura
Camp militaire Mura, eyebani na kombo ya centre d'instruction militaire ya Mura, ezwami na 5 km ya Likasi, na province ya Haut-Katanga, na République démocratique ya Congo. Ezali esika ya kobongisama ya mampinga ya Congo démocratique (FARDC).
Formasyo ya ba sous-officiers
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na sanza ya misato 2021, bilenge 207 kati na bango basi 5 bakotaki na FARDC nsima ya sanza motoba ya mateya na bango na centre ya Mura. Na kati ya bana 243 oyo bakɔtaki kelasi yango, bana 207 balongaki, elingi koloba ete bana-kelasi mingi (88,8%) balongaki. Ba sous-officiers ya sika, oyo batombolaki bango na grade ya sergent, balendisamaki na kolakisa disiplini mpe mosala na bango mpo na kobatela bosembo ya mboka1,2.
Epidémie ya choléra na 2024
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na sanza ya mibale ya 2024, esika yango ekutanaki na maladi ya kolera, bato 144 bazwaki yango mpe bato 14 bakufaki na pɔsɔ moko. Engebene Général Eddy Kapend, mokambi ya etúka ya XXII ya basodá, yango esalemaki mpo ete bato bazalaki na bopɛto malamu te mpe bazalaki ebele kati na káa. UNICEF epesaki lisungi mpo na kopekisa bokono mpe kobongisa ezalela ya bopeto na esika yango.
Centre ya mateya ya basoda ya Mura ezali na mokumba monene na mateya ya ba sous-officiers ya ba FARDC, na yango ezali kopesa maboko na kotonga makoki ya mampinga ya Congo5.