Kanda Bongo Man

Kanda Bongo Man, abotamaki na mobu 1955 na Inongo, Repubilika Demokratiki ya Kongo, azali moyi ya miziki ya soukous oyo eyebani mingi.[1]
Kanda Bongo Man azalaki moyembi ya Orchestra Belle Mambo na mobu 1973, kotambola na soni oyo Tabu Ley apesaki.[2] Karrière na ye ya solo ebandaki nsima ya kokende na Paris na 1979, epai oyo miziki na ye ebandaki kozwaka biloko ya Zouk (oyo eutaka na Antilles ya Falansɛ). Album ya liboso, "Iyole" na 1981, ná "Djessy" na 1982, ekómaki populɛr.
Ayebani mingi mpo na mbongwana oyo amemaki na miziki ya soukous. Na liboso, ba nzembo ya soukous ezalaki na lolenge ya koyemba mingi na ebandeli, sima gita ezalaki koya na suka. Kanda Bongo Man abongolaki style, atindaki gita epesama sima ya maloba nyonso ya nzembo, ata na ebandeli ya nzembo. Style na ye ya soukous epesaki mbotama ya danse ya kwassa kwassa, epai nyonga esalaka mouvement ya sima-koleka na mabɔkɔ kolanda nyonga.
Lokola ba musiciens mingi ya soukous ná rumba oyo bayaki liboso na ye, Kanda Bongo Man azalaki mpe na orchestre na ye. Ba musiciens mingi oyo bazalaki na ye bakomaki solo artistes. Moko oyo eyebanaki mingi ezalaki Diblo Dibala. Ayebanaki lokola "Machine Gun", Diblo Dibala azalaki partie importante ya groupe ya Kanda Bongo Man na ba album mingi lokola "Kwassa Kwassa" ná "Amour Fou".
Kanda Bongo Man azali kaka kozalaka na ba concerts na Europe ná Ameriki. Na sanza ya Juillet 2005, ayembaki na LIVE 8: concert ya Afrika na Cornwall.
Diskographie
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- Iyole (1981)
- Djessy (1982)
- Amour Fou (1984)
- Malinga (1986)
- Lela Lela (1987)
- Sai Liza (1988)
- Kwassa Kwassa (1989)
- Isambe Monie (1990)
- Zing Zong (1991)
- Sango (1992)
- Soukous na Central Park (1993)
- Tamu (1995)
- Boyei na Afrika ya Sud (1995)
- Francophonix (1999)
- Balobi (2002)
- Swalati (2003)
- (2009)
Ba liens ya libanda
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Maloba ya nse
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ "African Music Encyclopedia: Kanda Bongo Man". Archived from the original on 2008-05-31. https://web.archive.org/web/20080531053020/http://africanmusic.org/artists/kanda.html. Retrieved 2010-01-02.
- ↑ Chris Stapleton's sleevenotes pour Heartbeat Soukous