Ko botama na mayi

Kobota na mayi ezali lolenge ya kobotisa mwana, epai mama azali na pasi ya kobota. Bato oyo bazali kosunga lolenge oyo balobaka ete ezali ya libateli mpe ezali na matomba mingi mpo na mama mpe mpo na mwana oyo azali na libumu. Matomba yango ezali mpe kokitisa mpasi mpe makama oyo ekoki kobima ntango ya kobota. Kasi ,bato oyo bazali kokelemela lolenge yango balobaka ete ekoki komemela mwana makama oyo esengeli te,lookola kozwa mikrobe to komela mai na mbalakaka
Makambo ya kala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na kati ya mbula 1960 molukiluki ya Union soviétique Igo Borisovich Charkovsky, abimisaki makanisi ya kobtisa na kati ya mai mpe abandaki kosalela yango ,alandaki ndenge ba dauphin babotaka bana na bango [1] .
Nsima mwa ntango ,monganga ya kobotisa bana ya France , Frédérick Leboyer ,akolisaki lolenge ya kozindisa mwana oyo abotami sika na mai mpo ete amesana malembe malembe na mokili ya libandà ,na mokano ya kokitisa mpasi mpe somo oyo mwana akoki koyoka tango ya mpasi ya kobotama .
Michel Odent akobaki na mayele yango, kasi mbala oyo asalelaki mai ya molunge ya piscine mpo na kosalisa mama na ntango ya kobota. Molunge ya mai mpe ndenge mai esimbaka nzoto ezalaki kokitisa mpasi mpe kopesa mama kimya. Nsima, bamama mosusu balingaki lisusu kobima na mai te mpo na kokende kobota na salle ya kobotisa. Yango wana, bato bakanisaki ete mwana akoki mpe kobotama na kati ya mai, mpamba te ezalaki na epekiseli moko ya monene te. Mwana oyo azali naino na libumu apemaka te lokola azali na kati ya mai ya libumu ya mama. Bongo, clinique ya Pithiviers ekómaki lopitalo ya liboso na France oyo ezalaki kosalela lolenge yango, mpe bankóto ya bamama babotaki bana na bango na kati ya mai. Na nsima, lolenge yango epanzanaki na mikili mingi ya mokili mobimba.
Na ba 2008 ba lopitalo ya Irland epekisa kobotama na bapisine sima ya liwa ya mwana sima kobotama na mayib [2] .
Banote mpe ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ . 5. 2018-05-16. pp. CD000111. doi:10.1002/14651858.CD000111.pub4. ISSN 1469-493X. PMID 29768662.
- ↑ https://fr.wikipedia.org/wiki/Accouchement_dans_l%27eau
Talá mpe
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ba liens ya libanda
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Erreur de script : le module « Catégorisation badges » n’existe pas.Erreur Lua dans Module:Suivi_des_biographies à la ligne 263 : attempt to call field 'formatStatements' (a nil value).