Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Kobeba ya maziba ya mayi ya komela na République démocratique du Congo

Útá Wikipedia.

Pollution ya ba sources ya mayi ya komela na République démocratique du Congo (RDC) ezali problème munene ya environnement mpe santé. Bibale, mabeke, maziba, mpe mai ya nse ya mabele oyo esalelamaka mpo na kopesa mai ezali kokutana mingi na lolenge mingi ya bosoto, ezali kobebisa lolenge ya mai ya komɛla mpe ezali kobakisa likama ya bokono oyo eutaka na mai epai na bato[1],[2].

Maziba pe lolenge ya bosoto ya mayi

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Pollution ya Ndako

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bosɔtɔ ya ndako eutaka libosoliboso na kobwaka mai ya bosɔtɔ oyo epɛtolami te, bosɔtɔ ya makasi oyo etikali pene na banzela ya mai, mpe mai oyo ezali koleka na bingumba. Bopeto ya malamu te esalaka ete biloko ya bosoto ekɔta na bibale, mabulu, mpe mai ya nse ya mabele oyo esalelamaka mpo na kopesa mai ya komɛla[3].

Pollution industrielle mpe ya mabanga ya ntalo

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ba décharges industrielles, mingi mingi na ba mines mpe na ba zones urbaines, ekotisaka ba métaux lourds mpe ba produits chimiques toxiques na ba sources ya mayi. Kozanga bolandi ya makasi ya zinga zinga ematisaka likama ya bosoto na bibale pe mayi ya se ya mabele.

Pollution ya bilanga

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mimeseno ya bilanga oyo epekisami te, na ndakisa kosalela engrais chimique mpe nkisi ya koboma banyama, mbala mingi esalaka ete mai ya likoló mpe ya nse ya mabele oyo basalelaka mpo na komɛla ebebisama.

Maziba ya mayi oyo ezo tosa

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Maziba ya mayi ya minene oyo ebebisami na bosoto na RDC ezali :

  • Bibale, mingi mpenza ebale N’Djili na Kinshasa, oyo epesaka mai na bamilio ya bato mpe ezali kokutana na mikakatano ya bosoto oyo ezali se kobakisama[4].
  • Mai ya nse ya mabele (mabulu, mabulu ya botimoli), mbala mingi ebebisami na misala ya bato to na ba systèmes ya bopeto oyo ekoki te.

Ba données nationales sur accès na mayi ya komela

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Engebene na bakonzi ya Congo mpe REGIDESO, pene na bato 36.193.107 ya Congo bazwaki mai ya komela na mobu 2023, bomati monene soki tokokanisi yango na bambula eleki. Taux ya service ekanisami na 35,5% ya population, soki tokokanisi yango na pene na 24,5% na 2018.

REGIDESO emonisi pe ete ba investissements publics ya minene, pe lisusu ba projets ya traitement ya kobakisa, ezali na tina ya kobongisa qualité pe consommation ya mayi oyo ekabolami na bingumba ebele na ekolo mobimba[5][6].

Botalisi ya bilanga ya lolenge ya mayi

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Boyekoli bosalami na ba communes ya libanda ya Kinshasa (Selembao na Kimbanseke) emonisi ete :

  • koleka 80% ya mai ya ndako eutaka na maziba lokola mabulu mpe maziba oyo ebatelami te, .
  • mpe atako ba paramètres physiques mosusu ekokisaka malako ya OMS, contamination ya bactérie etikali na eteni monene ya ba points d’échantillonnage[7].

Ba impacts na santé

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Contamination ya ba sources ya mayi ya komela na RDC esalaka que ba maladi oyo ewutaka na mayi lokola :

  • choléra ;
  • diarrhee aiguë ;
  • fièvre typhoïde ;
  • ba infections parasites ya intestin.

Eteni monene ya bato bamɛlaka mai oyo ebebisami na nsɔi, mpe yango ebakisaka mpenza likama ya maladi mpe ya liwa, mingimingi epai ya bana[3].

Mosala ya bakonzi ya Congo

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ministère ya Environnement, Conservation Nature et Développement Durable (MECNDD) ezali na mokumba ya kolandela pe ko réglementer qualité ya mayi na RDC, nzoka nde Direction ya Hygiène na kati ya Ministère ya Santé ezali ko contribuer na ko définir ba normes pe ba politiques ya santé. Kasi, mabunga na bosaleli ba programmes ya contrôle pe ya bolandi etikali[8].

Mesures ya prévention na réduction

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bobateli mpe Bokambami ya Maziba

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bobateli ya nzoto ya maziba ya mayi (botiami ya ba couvercles, ba zones tampons ya pollution) ezali na tina pona kopekisa bokoti ya bosoto pe kosala été mayi ya komela ezala ya malamu.

Traitement ya liboso ya kokabola

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Chloration électrochloration, chloration, mpe mayele mosusu ya kopɛtola mai ezali mayele oyo esɛngami mpo na kokitisa charge ya bactérie mpe kobongisa ndenge ya komɛla.

Bokasi ya Bibongiseli

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Kolendisama ya manaka ya bolandi bopeto ya mayi, kosala makasi na mibeko ya zinga zinga, pe kosala ba campagnes ya sensibilisation ya baimboka ezali makambo ya tina pona kopekisa bosoto ya ba sources[9].

Pollution ya ba sources ya mayi ya komela na RDC ezo bebisa accès ya mayi ya qualité pe ezo poser défi ya santé publique. Atako bomati ya motango ya bato oyo bazali na makoki ya kozwa mayi ya komela na nzela ya milende ya REGIDESO mpe bakonzi ya ekolo, lolenge ya mayi oyo ezali kaka na likama mpo na lolenge ndenge na ndenge ya bosoto. Esengeli kosala politiki ya makasi, botiami mosolo ya seko, pe boyangeli ya malamu ya makoki ya mayi pona kosala été mayi ya komela ya malamu pona bato banso[3].

Notes et références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]