Kopanza ya Hantavirus na MV Hondius

Na sanza ya minei 2026, bokono ya vilúsu hanta oyo euti na virus ya Andes emonanaki na masuwa ya bapaya ya Holanda, MV Hondius. Na mokolo ya yambo ya sanza ya minei 2026, masuwa yango elongwaki na Ushuaia, na Argentina. Mopaya moko na masuwa akufaki na virus na mokolo ya 11 Aprili. Ebembe na ye balongolaki yango na masuwa na Saint Helena na mokolo ya 24 Aprili, esika mwasi na ye akitaki liboso akufa mikolo mibale na sima na lopitalo na Johannesburg. Mopaya ya misato akufaki na kati ya masuwa. Mopaya moko ya Grande-Bretagne batindaki ye na Johannesburg mpo na kozwa lisalisi, azalaki na likama mingi kasi ezalaki kobongwana te.
Ata soki masuwa etɛlɛmaki na Praia, na Cap-Vert, na boumeli ya mikolo misato, moto moko te akitaki mpo ete bisika ya lisalisi ya kuna bizalaki na makoki te ya kosala bokimi ya bato na ndenge ya malamu. Sima Ministɛrɛ ya Bokolongono ya Espagne endimaki boyei ya masuwa na Bisanga ya Canaries, masuwa elongwaki mpo na kokende na Tenerife na mokolo ya 6 Mai, esika wapi bakolongola bapaya mpo na kozongisa bango na bikolo na bango.
- Ndámbo
- Makama ya 2026 na Afrika
- Bopalangani ya bokono ya 2026
- 2026 na Cap-Vert
- 2026 na Saint-Hélène
- 2026 na Afrika ya Sudi
- 2026 na Pays-Bas
- Sanza ya minei 2026 na Afrika
- Sanza ya minei 2026 na Argentine
- Esanga Ascension
- Bopalangani ya bokono na masuwa ya bopemi
- Bopalangani ya Hantavirus
- Makama ya kolongono ya nzoto na Afrika
- Makama na mbu na 2026
- Makama na mbu na Afrika
- Sanza ya mitano 2026 na Afrika
- Praia