Marie-Claire Faray
Marie-Claire Faray Marie-Claire Faray azali mosali ya makambo ya bomoto mpe mobundi ya Republiki Demokratiki ya Kongó . Afandaka na Londres esika asalaka lokola mobundi mpo na kosilisa mobulu na basi [1] .
Alobi ete, atako basi ya Kongó basalemaki lokola bitando ya bitumba na tango ya bitumba na RDC, lelo oyo babwakami libándá ya mosala ya kolongisa kimia. [2] .
Bomwana mpe kelasi
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Faray azwaki diplome ya licence na sciences na Université Métropolitaine ya Londres, mpe diplome ya maîtrise na sciences na London School of Hygiene and Tropical Medicine. Azwaki mpe masomo na Université Queen Mary, mpe wana wana na Londres. [3] .
Mosala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Faray asalaka lokola conseillère ya makambo ya mayele ya bokolongono ya nsuka ya eteyelo mpe mokambi ya bolukiluki na makama ya kokangama na Université Queen Mary ya Londres mpe na lopitalo Barts.[4] . Faray azali kotombola bokeli ya malako ya mokili mobimba oyo ezali kotosa mibeko mpe guvernema [5] oyo ezali kosala kampanye mpo na kobundisa mobulu na basi na Afrika mpe mpo na bantina ya kimya mpe ya makoki ya bomoto [6] .
Faray azali kati na baoyo bazali kotombola Protokole ya Maputo mpo na kobatela makoki ya basi ya Afrika. Moko ya mikano na ye minene ezali ya kokitisa makambo mpo basi banso bazwa makoki ya bango ya bomoto mpe bokengi, na boyokani na ba ndingisa 3, 17, 18, 19 mpe 20 ya Déclaration Universelle ya Makoki ya Bomoto, na Afrika mobimba, kino na mobu 2020, na esika ya mouvement ya Mobu zomi ya Basi ya Afrika . Azali vice-président ya section britannique ya Ligue internationale ya basi mpo na kimia mpe bonsomi mpe azali na comité exécutif ya Common Cause UK, plateforme oyo ezali kotombola basi ya Congo na Royaume-Uni . Azali mpe mosangani ya boyokani ya Million Women Rise, lisanga ya basi ya ekolo . Na mokolo ya 16 décembre 2007, Faray abandaki filiale ya WILPF na Kinshasa . Azali moko ya basi ya Kongó oyo bazali na liboso na mosala ya kobongola makambo na mboka Kongó[7] .
Ebongiseli ya Mabota Masangani
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Faray azwaki biteni na bokutani ya bamboka ya ONU ya mbala mibale na mbula 2008, mpo na kotalela boyokani kati ya bibundeli ya mike mpe ndenge yango etindaka mobulu epesama na basi na Afrika[8] .
Nkuku
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Faray azali kovanda na Londres na bana na ye mibale ya basi. [5] .
Banote mpe ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 26-11-2012. https://edition.cnn.com/videos/international/2012/11/26/african-voices-women-rights-marie-claire-faray-b.cnn.. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 2016-03-04. https://www.pambazuka.org/gender-minorities/congo-women-violence-war-and-peace. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". http://metimun2011.weebly.com/guest-speakers.html. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 30 January 2016. http://www.congolive.org/marie-claire-faray-women-resistance/. - 1 2 "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 1 March 2011. http://www.makeeverywomancount.org/index.php?option=com_content&view=article&id=346:interview-of-the-month&catid=42:general&Itemid=135. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 30 November 2012. http://edition.cnn.com/2012/11/30/world/africa/africa-womens-decade-rights/index.html. - ↑ {{Ouvrage}} : paramètre
titremanquant - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". https://www.un.org/press/en/2008/dc3123.doc.htm.