Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Maurice Abibu Sakapela

Útá Wikipedia.
Gouverneur par intérim ya etuka ya Tshopo na 2021

Maurice Abibu Sakapela, (ekomami mpe Abibu Sakapela Bin Mungamba) azali moto ya politiki ya ekolo Congo démocratique. Azali moto ya etuka ya Tshopo. Asali vice-gouverneur mpe na sima gouverneur par intérim ya Tshopo wuto avril 2021 tee na août 2022, aponamaki na ministre ya Intérieur Gilbert Kankonde mpo na kosala makambo ya mokolo na mokolo nsima na bolongolami na ebonga ya Louis-Marie Walle Lufungula[1],[2].

Mokonzi molandi (2019–2021)

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Maurice Abibu Sakapela aponami Gouverneur adjoint ya Tshopo na 2019, kosala na nse ya Gouverneur Louis-Marie Walle Lufungula.

Carrière politique

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Le 15 avril 2021, Gouverneur Walle Lufungula alongolamaki na ebonga na Assemblée provinciale; Ba députés 17 kati na 28 ba votaki na ngámbo ya motion ya censure —oyo ebandaki na député Tryphène Saidi Mabikinyambey —na kotanga bokambi ya mabe[1].

Gouverneur par intérim (2021–2022)

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na boyokani na mobeko mwa boyangeli bonsomi bwa bituka, azali na mokumba mwa kosala ete misala mia leta mikoba kino maponami ya mokambi wa sika[2].

Na boumeli ya bokonzi na ye ya ntango mokuse, asalaki makambo mingi:

  • Le 10 août 2021, alongolaki conseiller na ye ya likolo, Asumani Angbonda Dieu-Merci, mpo na kozanga botosi[3].
  • Na septembre 2021, atelemisaki mpako ya mabanga ya ntalo ya 66 millions ya FC oyo etalemaki lokola ezali na mibeko te.
  • Le 17 janvier 2022, alakisaki posa ya komona ville ya Kisangani ebongwana kombo "Lumumba-Ville" pona kokumisa Patrice Lumumba[4].
  • Na mokolo ya 8 juillet 2022, abandi Programme ya Développement Local mpo na ba Territoires 145 (PDL-145T), na budget ya 70 millions ya ba dollars, na ba territoires 7 ya Tshopo[5].

Ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.