Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Mosala ya bilanga écologique eumelaka na République démocratique du Congo

Útá Wikipedia.

Mosala ya bilanga écologique eumelaka na République démocratique du Congo (RDC), na ba liens vérifiables, ezali na tina ya kolendisa misala ya bilanga oyo ezali na boyokani na zinga zinga na tango wana kokokisa bamposa ya bilei ya mboka oyo ezali se kokola. Na bozwi na yango ya bozalisi mingi mpe na bikelamu ndenge na ndenge, RDC ezali na makoki ya kozwa mayele ya bilanga ya seko oyo ebatelaka zinga zinga na tango wana ezali kosunga nkita ya mboka[1].

Misala ya bilanga oyo ekoumela

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Misala ya bilanga ya seko na RDC ezali na ba méthodes lokola agroécologie, agroforesterie, pe gestion intégrée ya ba ressources. Ba techniques oyo ezali na tina ya kobongisa productivité na tango ya ko minimiser ba impacts environnementaux[2].

Agroécologie

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Lolenge oyo elendisaka biodiversité mpe esalelaka ba techniques naturelles mpo na ko engrais na mabele mpe kopekisa ba niama mabe, na yango ekitisaka dépendance na ba inputs chimiques[2].

Agroforesterie

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Kosangisa banzete na ba systèmes agricoles esalisaka na kobatela mayi, ko enrichir mabele, pe kobatela contre érosion[2].

Misala ya Leta

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Gouvernement ya Congo esali ba initiatives ebele pona kolendisa agriculture durable, na kati na yango ba subventions pona ba pratiques oyo ebebisaka zinga zinga pe ba programmes ya formation pona basali bilanga[3].

Ba subventions

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Lisalisi ya mosolo ezali mpo na basali bilanga oyo bazwaka mayele ya koumela, na ndenge yango, kopesa nzela na mbongwana na bilanga oyo ekobebisa te zinga zinga[3].

Ba Programmes ya Formation

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ba ateliers pe ba séminaires ebongisami pona kopesa mateya na basali bilanga na maye matali mayele ya bilanga ya malamu, ba technologies ya sika, pe boyangeli makoki[3],[4].

Boyokani ya mokili mobimba : Boyokani na mangomba ya molongo lokola UNESCO pe FAO esalemi pona kosunga misala ya bowumeli na RDC. Ba collaborations wana ezali na tina ya kokabola boyebi pe kopesa ba ressources pona ko développer ba pratiques agricoles durable[5].

Bosalisi na UNESCO

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Misala lokola Couloir Vert ezali na tina ya kolendisa misala ya bilanga ya seko pe kokitisa bopanzani ya zinga zinga ya misala ya bilanga[4].

=== Lisungi ya FAO === Organisation alimentaire et agriculture ya Nations Unies epesaka toli ya tekiniki pe bisaleli pona kosunga basali bilanga bazua misala ya seko[5],[6].

Ba notes na ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  1. (fr-FR) Farmonaut, « Agriculture en République Démocratique du Congo », sur FARMONAUT, 2025 (consulté le 15 yanwáli 2026)
  2. 1 2 3 (fr-FR) Organisation internationale de la Francophonie, « Innovations en agriculture durable - bassin du Congo », sur FRANCOPHONIE, 2025 (consulté le 15 yanwáli 2026)
  3. 1 2 3 (fr-FR) cnredd, « Agriculture - République Démocratique du Congo », sur CN-REDD, 2023 (consulté le 15 yanwáli 2026)
  4. 1 2 (fr-FR) Alliance Bioversity International, « Projets et initiatives phares en RDC », sur ALLIANCE BIOVERSITY CIAT, 2023 (consulté le 15 yanwáli 2026)
  5. 1 2 (fr-FR) Multi-Partner Trust Fund Office, « Gestion durable de l'agriculture (GDA) », sur UNDP, 2023 (consulté le 15 yanwáli 2026)
  6. (fr-FR) FAO, « RDC : Agriculture durable) », sur FAOLEX FAO, 2023 (consulté le 15 yanwáli 2026)