Mosquée centrale ya Kisangani
Mosquée centrale ya Kisangani etongamaki na 1972 na ba Alambakis entre nzela ya aéroport ya Bangboka na ebale Lubunga[1].
Lisolo ya kala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Mosquée Lillahi ("pour Dieu" to "ya Nzambe") etongamaki na suka ya ba années 1970 na début ya ba années 1980 na défunt M. Aziz Said Kasambakanya na M. Sefu Romande (finance) mpe en tant que entrepreneur défunt Mwalimu Salehe. Aziz Kasambakanya azalaki commerçant local ya origine Omani (Sultanat ya Oman) na nzela ya tata na ye mpe origine zaïrienne na nzela ya mama na ye. Azalaki na projet ya kotonga école Coranique ya munene, projet oyo akokaki kosala te mpo na ba divisions internes na kati ya COMIZA (Communauté islamique ya Zaïre) oyo ekambamaki na défunt M. Kazabel[1].
Botongi mpe bobongisi
[kokoma | kobɔngisa mosólo]mosquée centrale ya Kisangani ezali na passé historique riche kasi lelo etikali sans rénovation depuis plus de 25 ans mpe yango esali que e perdre kitoko na yango ya kala[2]
Ndako yango, oyo eyambaki bato minene ya politiki lokola Président ya kala ya République Laurent-Désiré Kabila, ezali esika ya elembo mpo na bandimi ya ba musulmans ya engumba Kisangani. Mardi 22 octobre 2024, Doudou Fwamba, Ministre ya Finances mpe moto ya Kisangani, atyaki libanga ya liboso mpo na kobongisa ndako oyo ebebaki, mosala oyo ekambamaki na fondation na ye mpo na komema bomoi ya sika na esika oyo ya losambo ya... Bamizilma ya sembo[3].
Na molulu oyo, Doudou Fwamba amonisaki esengo na ye mpo na kozongisa mosquée na nkembo na yango ya kala. “Tozali na esengo mingi lelo. Kolata mosquée na elamba na yango ya kitoko koleka ezali mosala ya bolingo malamu oyo Islam eteyaka na nzela ya Mohamed, profeta ya Allah. (Nzambe apambola ye),” asakoli, komikundolaka ntina ya geste oyo mpo na lisanga ya Bamizilma ya Kisangani. Na réadaptation oyo, alingi kaka te kopesa esika ya lokumu na ba fidèles, kasi mpe kolendisa image ya Islam na région historique oyo ya RDC en général.[3]. Fondation ya Doudou Fwamba etie pe na ba projets misusu ebele pona Kisangani[3].
Bokeli ya architecture
[kokoma | kobɔngisa mosólo]
Ba notes na ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- 1 2 (en) « Culte musulman - Kisangani - Stanleyville », sur www.stanleyville.be (consulté le 21 yanwáli 2025)
- ↑ (en) « Kisangani : La rénovation de la mosquée centrale de Kisangani dans la commune Kisangani ! », sur www.kis24.info, (consulté en 21 janvier 2025)
- 1 2 3 (en) « Kisangani : Doudou Fwamba a posé la première pierre pour la rénovation de la mosquée centrale ! », sur www.lebarometre.cd, (consulté le 11 yanwáli 2025)