Ndombe Opetum
| Naissance | |
|---|---|
| Décès | |
| Nationalité | |
| Activité | |
| Période d'activité |
à partir de |
Ndombe Opetum (ayebani na kombo ya Pépé Ndombe ) azalí alanga nzembompé mokomi ya nzembo ya Congo abotami na 3 mars 1944 na Bandundu mpe akufi24 mai 2012 na Kinshasa [1] . Azali tata ya Baby Ndombe mpe membre ya groupe soukous ya Franco Luambo TP OK Jazz oyo e dominaki scène musique congolaise depuis ba années 1960 tee na ba années 1980.
Biografi ya bomoi ya bato
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Carrière ya miziki
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Ndombe Opetum azalaki moyembi principal ya Afrisa International yambo akota na lisanga ya TP OK Jazz pene pene ya mibu 1970 sima ya kolongwa ya Sam Mangwana . Akota na lisanga na Empopo Loway, mpe atikalaka na lisabga tee na kokabuana na yango na décembre 1993 mbula minei sima ya liwa ya fondateur Franco Luambo [2] .
Bato oyo bazalaki na etuluku yango na ntango wana bazalaki na bayembi na ntango wana bazalaki : Wuta Mayi, Michel Boyibanda, Josky Kiambukuta mpe Youlou Mabiala, mpe lisusu guitariste ya rythme Simaro Lutumba mpe guitariste principal Franco Luambo.
Sima ya liwa ya Franco Luambo, mokeli lisanga ya TP OK Jazz na mobu 1989, groupe ekobaki kobeta pendant quatre ans. Simaro Lutumba nde azuaki soin ya groupe na ba musiciens pendant que famille ya mowei ezuaki soin ya ba avocats, ba compagnies disques na ba techniques misusu. 70% ya revenu ekendeki na ba musiciens ya groupe alors que 30% na famille ya Franco. Kasi, bokeseni ebimaki kati na libota mpe etuluku mpe yango ekosala ete etuluku TP Ok Jazz epanzana na sanza ya zomi na mibale 1993 [3] .
Ndombe Opetum elongo na Simaro Lutumba, Josky Kiambukuta mpe ba anciens membres ya TP OK Jazz, basalaki groupe Bana Ok na janvier mobu 1994. Ndombe atikali membre tee na liwa na ye na 2012 [3] .
Discographie oyo ezali na kati
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bomoyi ya Nkuku
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Pépé Ndombe Opetum azali tata ya libota ya bana libwa kati na bango mwana na ye ya mitano mpe mwana na ye ya mobali kombo na ye Baby Nbombe abotami na mokolo ya misato sanza ya misato mobu 1974 na Kinshasa, oyo azalaki na kati ya groupe Wenge Musica Maison Mère de Werrason [4] .
Liwa
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Pépé Ndombe Opetum akufi na arrêt cardiaque na engumba Kinshasa moko ya ntuku mibala na mineyi sanza ya mitano mobu 2012 na mbula 68 ans [5] , .
- ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 2012-05-24. https://www.radiookapi.net/culture/2012/05/24/rdc-lartiste-musicien-ndombe-opetum-est-mort. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 2007-05-07. https://www.afrisson.com/ndombe-opetum-112/. - 1 2 "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 2007-05-10. https://www.afrisson.com/bana-ok-1003/. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". https://www.kribiosuniversal.com/post/voici-ce-que-nous-reserve-le-chanteur-congolais-baby-ndombe. - ↑ "Kopi ya archive". Archived from the original on 2012-06-04. https://web.archive.org/web/20120604060845/http://www.starducongo.com/Ndombe-Opetum-l-artiste-prolifique-sera-inhume-le-samedi-9-juin_a5543.html.
- Page utilisant P569
- Page utilisant P19
- Page utilisant P570
- Page utilisant P20
- Page utilisant P27
- Page utilisant P106
- Page utilisant P2031
- Article utilisant l'infobox Biographie2 avec une charte sans catégorie
- Article à illustrer Biographie
- Article utilisant l'infobox Biographie2
- Article utilisant une Infobox
- Articles with incorrect citation syntax
- Pages containing cite templates with deprecated parameters
- Moyémbi wa Kongó-Kinsásá