Pandemia

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Pandemia ezalí maladie moko e zuwaka bato chaque periode ekangisi ba mbula dzomi na dzomi pe oyo e contaminaka bato noki penza na ba mboka pe ba region mingi ya mokili mobimba. Ba signe to symptom ya pandemia ezalíi ka mwa ndenge moko na maladie ya ordinaire ya mbula na mbula, kasi ba singe ya pandemie eleki makasi.

Pandemia e bandi ndenge nini[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ba virus to microbe e bongwanaka tango nioso, pe e pesaka ba complication ya sika. Pandemie e tindamaka tango virus ya sika e monani pe e bongwani mingi na ba virus ya liboso pe e kangi bato ya lotango moke oyo ba zali na immunité (to protection naturelle) contre yango. Oyo e ko pesa yango nzela e zuwama noki pe mosika, tango n’koto na n’koto ya bato ba zuwi yango. Virus moko ya sika oyo e pesaka pandemie e koki ko botama soki virus oyo e pesaka grippe na bato e sangani na virus oyo e pesaka grippe na ba niama, na ndakisa ya virus ya gilípi ya ndɛkɛ.

Pandemia[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Na siècle to ba mbula kama oyo e eleki, pandemie e zuwamaki mbala misato.
  • Ekoki ko zuwama tango ni tango na kati ya mobu.
  • Ekoki ko zuwa pene na 25 pour cent ya la population.
  • Ezali bokono makasi to grave po na bato nioso.
  • Bato ya mbula ni mbula bakoki kozuwa bokono makasi.
  • Vaccin ya malonga pe makasi ekoki kozuwama te soki tina ya virus wana e yebani naeno te. Po na yango, na mikolo ya liboso ya pandemie, vaccin e ko zuwama te.
  • Antivirus to kisi contre virus e zala ko bombama na ba stock po e salama na ndenge malonga kolanda ndenge pendemie ya grippe e zuwami pe e se developé.

Ba chance ya Pandemia ezali boni?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na siècle to ba mbula kama oyo eleki, pandemie e zuwamaki mbala misato (tala na se). Ba nganga mayele ba lobi ete pandemie ya sika ezali na nzela, ekoki koyaka noki, kasi bakoki ko yebisa exactement tango nini te. Ba chance ya Pandemia koyaka na Kongó ezali boni?

Organisation Mondiale de la Santé ezali tango nioso koluka po na ba signe ya liboso ya pandemia po ba zuwa mikano malonga po na ko ralentir to pe ko kangisa yango. Soki pandemie ya grippe e bandi na Erópa, yango e koki ko koma na Ingɛlɛ́tɛlɛ. Pe e kozuwa ba mposo mike kaka po e zuwama na mboka nioso.

Ba Pandemia ya ba mbula kama oyo eleki[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Gilípi ya Espania[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Mbula: 1918-1919
  • Ngɛngɛ: A/H1N1
  • Lotango ya bato ba kufaki: 20-50 million (molongo mobimba), 250,000 (na Ingɛlɛ́tɛlɛ).
  • Ba mbula ya bato ba kufaki mingi: Bato bilenge pe makasi (mbula 20 te 50).

Gilípi ya Azía[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Mbula: 1957-1958
  • Ngɛngɛ: A/H2N2
  • Lotango ya bato ba kufaki: 1 million (molongo mobimba), 33,000 (na Ingɛlɛ́tɛlɛ).
  • Ba mbula ya bato ba kufaki mingi: Bana mike penza pe bato mibange penza.

Gilípi ya Hong Kong[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Mbula: 1968-1969
  • Ngɛngɛ: A/H3N2
  • Lotango ya bato ba kufaki: 1.4 million (molongo mobimba) 30,000 (Ingɛlɛ́tɛlɛ mpé Ekólo Wali).
  • Ba mbula ya bato ba kufaki mingi: Mibange penza pe bato oyo ba zalaki deja na makono misusu.

Gilípi ya Rusí[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Mbula: 1977-1978
  • Ngɛngɛ: A/H1N1
  • Lotango ya bato ba kufaki: 700 000 (molongo mobimba).

Gilípi ya Mexiko[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Mbula: 2009–2010
  • Ngɛngɛ: A/H1N1

Tálá mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]