Sosiete ya mosolo ya botamboli
Société financière de Développement (SOFIDE SA) ezali institution financière ya droit congolais, ekelamaki na 1970 na nzela ya collaboration kati na Etat congolais, Banque centrale ya Congo, Groupe ya Banque mondiale mpe ba entreprises privées. Eyebani lokola banki ya liboso mpe ya monene ya développement na RDC.
Mokano ya lisanga
[kokoma | kobɔngisa mosólo]SOFIDE ezali na mokano ya kopesa lisungi ya tekiniki mpe ya mosolo na bokóli ya RDC na kosalisáká bobandisi, bokóli to bobongisi misala ya baizini, ya bilanga to misusu, ezala ya Leta, ya bato na bato to ya bibongiseli misusu, ezala ya mboka to ya bapaya.
Mokumba
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Mokano ya SOFIDE ezali ya kopesa lisungi ya mbongo na bato ya nkita oyo bazali kosala misala ya bomengo na misala oyo ezali na bopusi makasi na mboka. Yango esangisi kokokisa bamposa ya bato mpe ya bakompanyi, mpe kobakisa valɛrɛ, bozwi mpe misala. Lisusu, SOFIDE ekoki kosunga ba opérateurs économiques wana na kobongisa makambo ya tekiniki mpe ya mosolo mpo na ba demandes na bango ya ba crédits ya investissement mpe kolandela misala na bango na terrain, soki basengi yango.
Esika oyo ezali na biro monene
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Biro ya SOFIDE ezali na 9-11 avenue Lemarinel, na commune ya Gombe, na Kinshasa, na République démocratique ya Congo.
Lokola banki ya monene mpo na bokolisi nkita ya mboka, SOFIDE ezali na mokumba monene mpo na kosunga mpe kotombola bokolisi nkita na RDC.