Nzɔku

Útá Wikipedia.
Nzɔku
Ekútanaka nzɔku o Afríka mpé o Azia

Nzɔku ezalí nyama ya mabɛ́lɛ ya Afríka tǒ ya Azia. Ezalí na bwěmbo tǒ zólo elaí eye ekokí kobúka matíti, mbumankásá ya nzeté mpɔ̂ na kolíya. Ezalí na mpɛ́mbɛ́ tǒ mimpáti mibálé, na makútu tǒ matɔi manɛ́nɛ mpé na mokíla mokɛ́.

Nzɔku ezalí nyama ya mabɛ́lɛ elekí monɛ́nɛ eye evandaka o mokili (mondɛ́lɛ́ ezalí nyama ya mabɛ́lɛ elekí monɛ́nɛ o mái). Nzɔku ya mobali eye elutí monɛ́nɛ ebomámákí o Angola o mobú 1974, yango emekí bozitó ya kilógálame nkóto zómi na míbalé (12 000 kg) mpé bolaí bwa mɛ́tɛlɛ 4,20. Nzɔku ya mobali na mokóló ekokí komeka 4 500 kg na 2,8 m. Na mbótama, mwǎna ya nzɔku ekokí komeka bozitó ya kilógálame nkámá (100 kg). Nzɔku mwǎsí ezalí na zémi mpɔ̂ na sánzá 20 tǒ 22. Nyama mɔ̌kɔ́ tɛ́ ezalí na zémi elekí ntángo yango. Nkóla ya nzɔku ekokí koleka mibú 70.

Nzoku aza Naïma écrit par monsieur exauce tenga[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nzɔku elembaka mpɛ́mbɛ́ ya yangó (yě) tɛ́.

Nzɔku ya mabelé[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Tálá mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.