Stade Bakusu
Stade ya Bakusu ezali esika ya masano mingi, ezwami na avenue Lalia na Mbandaka, na Republique Démocratique du Congo [1], oyo ezali na kati.
Kopɔla ya stade
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na mokolo ya 28 février 2012 ezali na match ya mokolo ya mibale ya Vodacom Super League entre TP Molunge na AS Vita Club oyo ekosalema na principe na mokolo ya lomingo Mars 4 na stade ya Bakusu na Mbandaka Equateur. Kasi ba entrées ya stade oyo oyo etali ba districts ya Mbandaka II na III ezali na ba portes te mpe ba murs misusu ezali na ba fissures oyo ekoki suka suka na kokweya na yango.
Ntango batunaki bango mituna, bavandi basusu ya Mbandaka balobi ete babangi mpo na bokengi ya batali baye bakokota na lisano liye. Basengi na Gouverneur Baende a intervenir mpo na kobongisa yango noki.
Oyo ya nsuka amonisaki ete guvɛrnema na ye ezali na makoki te mpo na kosala intervention ya ndenge wana.
Pendant ce temps, Division provinciale ya Sports et Loisirs esali mikolo ebele mpo na ko marquer terrain mpe ko isoler zone neutre na stade Bakusu. Question ya ko minimiser ba dégâts possibles.
Ba analystes bakanisaka mpe ete match oyo ekokaki lisusu kosalema dimanche te mpo Vita Club Sports Association epesi sambo ya basani na yango na équipe nationale oyo ekosala match contre Equipe ya football ya Seychelles, mokolo ya misato 29 février, na match aller ya Eliminatoires ya Coupe d’Africaine 2013. na boponi ya ekolo akoki kosenga bozongisi sima [2].
Bozongisi nzoto na ndenge ya malamu
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Archevêque ya sika ya Mbandaka-Bikoro azwaki ebonga o’mokolo ya lomingo 26 janvier 2020. Molulu ya bozui ya possession canonique oyo esalemaki na stade ya Bakusu na présence ya ba autorités politiques-administratives ebele ya Kinshasa, surtout chef d’état-major ya chef d’Etat, Vital Kamhere. Monseigneur Ernest Ngboko a remplacer Monseigneur Fridolin Ambongo na poste oyo, oyo akomi Archevêque ya Kinshasa na 2019 [3].