Wazalendo
Ba wazalendo, ba patriotes na kiswahili [1] elingi kolakisa bituluku ya komibatela na kongo-kisasa(RDC), esalemi na ba civils oyo bamipesaki mpona kobundela mboka na bango, na ba bundi ya bato ya mobulu bakomi mosungi ya Mampinga ya Ekolo Kongo Démokratik(FARDC).
Bituluku ya yambo ya wazalendo ebimi nsima ya bosengi ya Félix Tshisekedi ko banda Mokolo ya 3 Novɛmbɛ 2022, Kosenga na bilenge ya kongo babongisa bituluku ya bokengi mpe basunga mampinga ya république mpo na kobundisa 23 mars (M23)[2] , [3].

« na eyano na bosengi ya makasi ya bilenge, [...], nabengi bango na komibongisa na bituluku ya bokengi mpo na kosunga, kosunga mpe kosunga mampinga na biso »[4]
Nsima ya mobeko ya mbulamatari ya mokolo ya 3 sanza ya libwa ya mobu 2023, oyo endimaki kozala ya ba bato ya mobulu na kati ya Mampinga ya Ekolo Kongo Démokratik (FARDC), ebele ya bituluku ya basimba minduki oyo ezalaki na est ya RDC, oyo bitumba ya kala ezalaki kobundama na mampinga ya Congo, eyanganaki na nse ya elembo ya ba wazalendo, kati na bango ba bato ya mobulu Mai Mai, ba Nyatura (en), mpe na kolanda rapport moko ya ONU, ba Forces démocratiques de libération du Rwanda (FDLR), etuluku ya basimba minduki, oyo esalemi na ba Hutu, batɛmɛlaki mokonzi ya Rwanda Paul Kagame, mpe oyo bamoko na bakambi na yango basanganaki na génocide ya ba Tutsi na Rwanda na 1994[5].
Makomi na nse ya lokasa
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ https://www.lemonde.fr/afrique/article/2023/12/13/les-wazalendo-des-patriotes-en-guerre-dans-l-est-de-la-rdc_6205635_3212.html
- ↑ https://www.france24.com/fr/afrique/20221104-rdc-f%C3%A9lix-tshisekedi-appelle-la-jeunesse-%C3%A0-se-mobiliser-face-%C3%A0-la-r%C3%A9bellion-du-m23
- ↑ https://www.dw.com/fr/les-wazalendo-ennemis-d-hier-devenus-des-alli%C3%A9s/a-68451579
- ↑ « En RDC, le président Félix Tshisekedi appelle les jeunes à « s’organiser en groupes de vigilance » », Le Monde, (lire en ligne)
- ↑ https://www.dw.com/fr/rdc-wazalendo-m23-fardc-rwanda/a-67157666