Gilípi ya ndɛkɛ

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki
Influenza A au microscope électronique
(Source: Dr. Erskine Palmer, Centers for Disease Control and Prevention Public Health Image Library).

Gilípi ya ndɛkɛ (to gilípi ya avian) ezali gilípi moko eye ezuaka surtout ba ndɛkɛ ya zamba mpe ya mboka. Ekoki kupanzana noki noki mpenza na kati ya bandeke na bopesi bokono mpe liwa, surtout na kati ya ba ferme ya ba soso to na kati ya nzando oyo ezali kotiya ba soso oyo ezali na bumoyi ebele esika moko.

Bandɛkɛ to basoso eye ezali na bukono ebombaka ba vilúsu ya gilípi na kati ya soi na bango, na mai ya zolo mpe na soi eye ezali kokweya, yango nde epanzaka vilúsu eye na kati ya ba plumes ya bandeke to basoso. Sorte ya mabe ya gilípi ya ndɛkɛ (eye epesami na vilúsu H5N1) ezali esika oyo kozua bandɛkɛ(surtout ba soso mpe mabata na bandɛkɛ ya zamba mosusu) na kati ya Azía na Erópa (tala: http://www.who.int mpo na lístɛ ya ba regions eye ezali na bokono bwango).

Photographie electromicroscopique ya H5N1 (Vilúsu coloré en or)

Na mikolo oyo ewuti koleka, vilúsu H5N1 epanzamaki na kati ya bato mpe epesi bokono mabe na kati ya bato mwa muke baye bazalaki na contact na bandɛkɛ eye ezalaki na bokono yango. Pembeni ya moitie ya bato oyo bazuaki bokono basilaki kokufa. Nata moto moko te asili kozua bono oyo na kati ya Kɔ́ngɔ.

Na tango ya lelo (yúni 2006), ata cas moko te ya moto apesi moto mosusu vilúsu eye. Ata ko ekoti na contact na ba ndeke eye ezali na bokono eye, bandɛkɛ ya bomoyi to ekufa, risque ya kozua gilípi ya ndɛkɛ ezali moke mpenza. Na mikolo ya lelo, restriction ezali te mpo na ko voyager to kokende na ba mboka oyo ezali affecte. Ba voyageurs basengeli koyeba ba risque mpe kolanda ba conseil epesami na wikipedia.

Soki ozali kokende na mboka oyo ezali na bokono[kokoma]

Les pays touchés par la gilípi aviaire le 11 février 2006. En orange, les cas humains et animaux. En jaune, les cas animaux seulement.

Soki ozali kovisiter baboka eye eyabani ezali na gilípi ya ndɛkɛ H5N1 na kati ya bandɛkɛ to ba soso, esengeli olanda bamesures eye elandi:

  • ko kende ko visiter te ba ferme ya bandɛkɛ to ba soso to ba zando;
  • tika to simba to kovanda pembeni na ba soso to bandɛkɛ eye ezali na bomoi to ekufa;
  • kolia te bandɛkɛ to ba soso oyo eza ya mobesu to elambami malamu te;
  • kolia te ba produits ya mobesu to eye elambami malamu te y compris makila;
  • sokola maboko mbala mingi na sabuni mpe na mai.

Soki ezali na contact na bandɛkɛ to ba soso ya bomoyi to ekufa na kati ya bamboka eye eyebami ezali na bokono eye, esengeli oyeba ba symptomes ya gilípi ya ndɛkɛ okati ya bato. Ba symptomes eye ezali ndɛkɛ moko na ba symptomes ya gilípi ordinaire mpe ekoki kobima noki mpenza. Ba symptomes yango ezali:

Soki ozui ba symptomes eye na tango ozali na mboko mopaya, mpe ozalaki na contact na ba soso to bandɛkɛ ya bomoyi to ekufa esengeli omona dokotolo ya mboka eye ozali.

Soki ozali kozonga na ba mboka eye ezali na bokono boye[kokoma]

Soki na sima ya mikolo sambo ya bolungui mboko eye ezali na bokono ete oyebi ete ozalaki na contact na bandɛkɛ to basoso ya bomoyi to ekufa, ozwi ba symptomes eye epesami na lístɛ oyo na page ya liboso, ezali important ete yo:

  • oluka komono dokotolo immediatement;
  • o telephoner dokotolo na yo to yebisa ba symptomes na yo mpe histoire ya voyage eye owuti kosala;
  • olanda ba mateya oyo ba pesi yo.

Ba kisi lokula aspirine, ibuprofen to paracetamol ekoki kosalisa na kokitisa ba symptomes. Landa ba mateya ya ba kisi. Kopesa te aspirine na bana baye bazali na moins de 16 ans. Lukula esengemi na infection respiratoire nyoso, esengeli olanda ba pratiques ya hygiene ya malamu:

  • kokanga zolo na yo na monoko na yo na tango ozali ko kosola to ko eternuer;
  • ko utiliser tissue kaka bala moko na tango ozali kokosola to ku eternuer mpe kubwaka yango na mbala moko mpe na ba soin nyoso;
  • kosokola maboko na yo mbala mingi na sabuni mpe na mai.