Kingasani (Kimbanséke)

Útá Wikipedia.

Kingasani na Masina ezalí bamboka minene na engumba Kinshasa. Yango ezalí na komine ya Kimbanseke. Kingasani ekabwaní na komine ya Masina na balabala monene Lumumba. Libándá ya pepo ya Ndjíli ezalí na ngambo ya Masina. Soki oútí na libándá ya pépo pé ozalí kokota na engumba, Masina ezalí na loboko ya mobali pé Kingasani na loboko ya Mwasi.

Lomoto[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bamboka wana mibalé ezalí na bato ebelé. Na mói ya lelo, ezalí na bato pene na mifuku mibalé (2.000.000). Yango wáná bafandi na yangó bamibengaka bashinwa pé babengaka Kingasani Masina na kombo ya "Chine Populaire" na bolandaka ndéngé lomoto ezalí na ekólo wáná ya Azia.

Politiki[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bamibengaka pé na lokumu nyonso "mboka ezangá bakonzi". Yangó ezalí pó, na bakomine wáná batelemelaka bokonzi ya lomá na ndéngé ya moke té. Ebandákí na Mobutu. Sima, tángo ya Kabila ya tata, Kingasani Masina batelemelákí badongolomíso óyo baútákí pé basungamákí na Rwanda-Urundi pé Uganda. Bana ya Kingasani Masina basekaka té na likambo ya kobatela bonsomi ya Kongó. Kaka na bolandaka makanisi wáná, babengaka pé yangó "Zone rouge" to etanda ya motane.

Bana ya Kingasani Masina bazalí bato ya moluká. Bato ya mbóngo bazalí míngi kuná té. Ezalí míngi míngi bato ya bozwi moké, kasi, bamitikaka pamba pamba té na lolombo to bisengasenga. Tóngo nyónso, okomona lomoto ndéngé ezalí komata na bataksibisi , babisi tó pé na engunduka. Bakeí moluká na vil. Na pokwa, balabala Mobutu tó Kulumba etondaka na lomoto.

Lolendo ya kimwana ya Kingasani masina[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ata ko bóngó, bána ya Kingasani Masina bazalí bato ya lolendo. Bamiyokaka sóni té. Balakisaka na lolendo pé lofundu nyónso 'te, bazalí bána ya Kingasani Masina. ézala baóyo babimá na Kingasani Masina pé bakomá kofanda na bakomine ya bato ya mbongo, ézala baóyo bakendé mikili misusu, bamibombaka té. Bamíkwaka bato. Soki mwána ya Kingasani ayebisi yo té : "hé, yo ozozwa makambo'ango ndéngé nini ? Nga nazali mwana ya Chine", elingí koloba 'te, azalí na somo na yo té. Salá na yo bipale ndéngé olingí, Piné ya Seku Touré ebungá na Kingasani Masina, Mobutu akimá Kongo ya kobombama tángo alekáká na balabala Lumumba. Badongolomíso bamoná makambo na bangó, yo pé moto oleisaka yé té. Kiséfé ya níni okosalela yé! Na boyé, bana ya Kingasani Masina bazalaka na lolendo ya komibenga bána ya Kingasani Masina.

Ngai moko pé, mokomi likakoli oyo, nazali mwana ya Kingasani Masina. lelo oyo nakoma kofanda na Belgique, kasi makani na ngai ezalaka tango nyonso kuna. elekaka mokolo té nazanga kotanga kombo ya Kingasani to Masina to naloba likambo etali mboka wana. ndako ya Bobimisi mikanda oyo nakela awa na belgique na kombo ya Mabiki, efandelo na yango na Kongo ya Demokrasi ezalaka kuna na Kingasani. Kartié ya kitoko epayi bato ya mwa bozwi bafandaka ezalí na Masina Sans-Fil. Ata ko bazalí bato ya kozwa ya mwa malonga, bango pé bazalí bobele na lolendo wana ya bashinwa.

Biteyelo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Biteyelo ndéngé na ndéngé ezalí na Kingasani Masina. Biteyelo ya sango makasi ezalí bongo:

  1. ITI Masina epayi wapi bayekolaka mateya ya tekiniki
  2. Biteleyo yaba mamelo na biso ya ba bola ya bergamo oyo batongela bana wa biso ecole primaire Elikya oyo esangisi bana basi pe babali. Nape Lycée Palazzolo na Lycée de Kingasani II epayi wapi bana basi bayekolaka kotonga, commerciali, pedagogie na pé Bio-Chimie bipayi wapi ngai pe mokomi na bino na tanga.

3.Complexe scolaire Saintu yosefu. Ekambami pe na ba mamelo ya santu yosefu ya torino. Ekabwami nabiteni misatu: Ecole primaire, Lycée Saint Joseph oyo toyebi na kombo ya Madayila na pe college Saint Frederic.

4. Institut Ngwanza na Mikondo na mbala ya sima tozanga té kopesa bino molongo ya biteyelo nyonso ezalaka na Kingasani Masina.

5.ITPP: Ekambami naba sango na biso yaba pasioniste. Ezali pene pene ya ndako nzambe ya eyamba yaba katolika santu marco. Ezali kolakisa bana ya mibali na pe ya basi kosala misala ya tekinika pe mosala ya courant. Tozali pé na biteyelo ya misala ya maboko oyo ekelama pé eyangelamaka bana ya Kingasani Masina. Ndakisa eteyelo CDFD oyo ezalaka na kingasani ekelama pé eyangelamaka na mama Claire Sene.

Nkita[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nkita ya Kingasani Masina efandi na bazando na yango. zando ya monene ezali "Marché de la Liberté" oyo etongamaka na M'zee Kabila. na Pascal pé zando ya monene ezali wana. na Kingasani ya suka, zando ezali kasi mingi mingi ezali ndé bamagazini etandama na babalabala ya minene. Tozali pé na bisalelo mapa. ya minene ezali Sokitem na BKTF.

Biyamba[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Lokola na Kongo mobimba, na Kingasani Masina okokuta biyamba ndéngé na ndéngé, ézala Biyamba oyo ebelelaka Nzambe ya Bakoko, ndakisa Bundu Dia Kongo, ézala biyamba ya bakristu to pé ya bamizilma pé biyamba misusu. kasi biyamba ya bakristu ndé eleki ebelé.

Mokumbá[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bakomine wana ezali na mokumbá monéne po na ntobwamá ya Kongo mobimba.