Likitana
O mambí ma lokótá, likitana lizalí nkómbó eye ekitání esíká ya nkómbó. Ndakisa : ngáí, yɔ̌ ,yě, bangó, mosúsu, basúsu , -ye, -súsu , b.n.b.
Ndéngé :
- likitana-boméi : ngáí, yɔ̌, b.n.b.
- likitana-litálisi : -angó, óyo, -ye, b.n.b.
- likitana-likokí
- likitana-motúna : níni, náni, banáni
Likitana o ntéi ya likelelo [kokoma]
Na makomi míngi ma Lingála likitana mpǒ na bato tǒ bilɔ́kɔ ekɔ́tisamaka na káti ya likelelo.
Likitana lya bato o ntéi ya likelelo [kokoma]
Na Lingála makitana matali bato mazalí: ngáí, yɔ̌, yě, bísó, bínó, bangó.
Na nkomá ya Lingála kokɔ́tisa likitani na likelelo, ekolanda likitani liye lizali kokɔ́tɔ na likelelo na loléngé luye:
- Ngáí→m tŏ n
Ndakisa
Molakisi apɛsi ngáí mokandá →Molakisi ampɛsi mokandá
Molakisi atindeli ngáí mokandá →Molakisi antindeli mokandá
- Yɔ̌→ko
Ndakisa
Molakisi apɛsi yɔ̌ mokandá →Molakisi akopɛsi mokandá
- Yě→mo
Ndakisa
Molakisi apɛsi yě mokandá →Molakisi amopɛsi mokandá
- Bísó→lo
Ndakisa
Molakisi apɛsi bísó mokandá →Molakisi alopɛsi mokandá
- Bínó→bo
Ndakisa
Molakisi apɛsi bínó mokandá →Molakisi abopɛsi mokandá
- Bangó→bá
Ndakisa
Molakisi apɛsi bangó mokandá →Molakisi abápɛsi mokandá
Likitana lya bilɔ́kɔ o ntéi ya likelelo [kokoma]
Na Lingála likitana litali bilɔ́kɔ lizali -angó. Mpǒ na kolikɔ́tisa o ntéi ya likelelo, lyangó likolanda kelási ya nkómbó ya elɔ́kɔ eye ekokɔtɔ na likelelo
Ndakisa
Molakisi apɛsi yɔ̌ mokandá. →Molakisi apɛsi yɔ̌ mwangó. → amupɛsi yɔ̌.
Mamá asómbi mbisi (yɔ̌kɔ́) o wɛnzɛ. →Mamá asómbi yangó o wɛnzɛ. → aesómbi o wɛnzɛ.
Mamá asómbi mbisi (íbalé) o wɛnzɛ. →Mamá asómbi yangó o wɛnzɛ. → aisómbi o wɛnzɛ .
Mamá asómbi lilala o wɛnzɛ. →Mamá asómbi lyangó o wɛnzɛ. → alisómbi o wɛnzɛ.
Mamá asómbi malala o wɛnzɛ. →Mamá asómbi mangó o wɛnzɛ. → amasómbi o wɛnzɛ.
Mamá asómbi ekɔlɔ́ o wɛnzɛ. →Mamá asómbi yangó o wɛnzɛ. → aesómbi o wɛnzɛ.
Mamá asómbi bikɔlɔ́ o wɛnzɛ. →Mamá asómbi byangó o wɛnzɛ. → abisómbi o wɛnzɛ.
Tatá asómbi bondóki o wɛnzɛ. →Tatá asómbi bwangó o wɛnzɛ. → abusómbi o wɛnzɛ.
Tatá asómbi mandóki o wɛnzɛ. →Tatá asómbi mangó o wɛnzɛ. → amasómbi o wɛnzɛ.