Lisakoli ya molongo ya makoki ya moto

Útá Wikipedia.

Lisakoli lya molɔ́ngɔ́ ya makokí ma moto

Lisakoli ya molongo ya makoki ya moto ezwami na lisanga monene ya bikolo nioso na 10 ya sanza ya zomi ya 1948 na Paris, na Ndako ya Chaillot, na mokano 217 (III) A. Ezali koyebisa makoki ya moboko ya bomoto. Kozanga ntina ya solosolo ya mibeko lokola yango, makomi oyo ezali esakola ya makoki; yango wana, motuya na yango ezali kaka na bosakoli.

Na bikólo 58 oyo ezalaki na kati ya ONU na ntango wana, ntuku minei na mwambe endimaki mobeko yango ya mokili mobimba. Mboka moko te etelemelaki yango, kasi mwambe bazwamaki na maponomi te mpe mibale bazalaki te. Kati na bamboka mwambe bazwamaki na maponomi te, Afrika ya Sudi, ezalaki na tango ya apartheid, eboyaki kondimisa lotomo ya bokokani liboso ya mibeko kozanga bokeseni ya kobotama to mposo mpe Arabie Saoudite etelemelaki bokokani kati na mibali mpe basi. Pologne, Tchécoslovaquie, Yougoslavie, Union soviétique, Ukraine mpe Biélorussie baboyaki mpo na matata mpo na ndimbola ya likani ya 2 na eteni nango ya liboso (1). Enfin, les deux pays qui ne se sont pas rendus aux urnes sont le Yémen et le Honduras.

Mokanda yango emonisi makoki ya moboko ya moto, kondimama na yango, mpe limemya na yango na mibeko. Ezali mpe na maloba ya ebandeli oyo ezali na makanisi mwambe oyo endimi ete bamboka nyonso, bikolo nyonso mpe bibongiseli ya politiki nioso esengeli kotosa makoki ya bomoto ya moboko oyo ekoki kolongolama te, mpe oyo esukaka na bosakoli ya bondimi na yango mpe esakolami na yango na lisanga ya monene ya bikolo ya bomoko.

Maloba ya yambo mpe lisakoli ekoki kobongwana te, yango ekomami na bankota montoba (Angle, Lifalanse, Kirisi, Kiespanioli, Kiarabi mpe Kishinoi) mpe ebongolami na bankota nkama-mitano na zomi na mwambe (lingala, swahili, alimani, kiportige mpe misusu).

«Déclaration des Droits de l'Homme et du Citoyen» ya 24 may 1773 (Falansia)

Maloba ma yambo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na botáláká ’te kondima limɛmya lya bato bansɔ ba molɔ́ngɔ́ mpé makokí ma bangó maye mazalí ndéngé mɔ̌kɔ́ mpé bakokí kopímela moto tɛ́ ezalí ntína ya bonsɔ́mí, bosémbo mpé kímyá káti ya molɔ́ngɔ́. Na botáláká ’te komɔ́na mpámba mpé kobóya kotósa esɛ́ngɛ́li ya moto ebátelama na bokonzi bwa bosémbo mpɔ̂ ’te, na sima yangó, moto ákóma na botɔmbɔki esóngó na minyɔ́kɔli tɛ́,

Na botáláká ’te esɛngɛ́lí koléndisa boyókani na káti ya bikólo,

Na botáláká ’te na káti ya Mokandá mwa Mibéko mya Lisangá ya Bikólo bya Molɔ́ngɔ́, bato ba molɔ́ngɔ́ bayébísí lisúsu loléngé bandimí malɔki ma ntína ya moto, limɛmya mpé lokúmu la moto, bokokani bwa makokí ma bǎsí mpé babáli mpé na botáláká ’te bangó bayébísí ’te bazwí mokáno mwa kobɔngisa ezalélí ya moto mpé kosála ’te moto azwa bomɔi malámu mpenzá na káti ya bonsɔ́mí bwa monɛ́nɛ mpenzá,

Na botáláká ’te kozala bato bansɔ na makanisi ndéngé mɔ̌kɔ́ mpɔ̂ na makokí mpé bonsɔ́mí bwangó, ezalí na ntína monɛ́nɛ mpɔ̂ ’te óyo bakáni elónga,

Likita linɛ́nɛ lizalí koyébisa Lisakoli lya molɔ́ngɔ́ óyo ya makoki ma moto lokóla elɔ́kɔ eye bato mpé bikólo binsɔ balingí bazwa, mpɔ̂ ’te bato mpé mangómbá mansɔ, na bobátelaka ntángo insɔ Lisakoli lyangó na motéma, basála makási na botéyi mpé bokólísí bwányá, mpɔ̂ ’te makokí mpé bonsɔ́mí yangó etósama mpé basála ’te bandima mpé basálélí yangó na bosɔ̂lɔ́ mpenzá na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezala na káti ya bato ba Bikólo bya Lisangá bangó mɔ̌kɔ́ tǒ na káti ya ekólo mpé molɔ́ngɔ́ mobimba.

Eténi yambo (1)[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bato bansɔ na mbótama bazalí nsɔ́mí mpé bakókání na limɛmya mpé makokí. Bazalí na mayɛ́lɛ mpé basɛ́ngɛ́lí kovánda na bondeko o káti na bangó.

Eténi ya 2[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na makokí mpé bonsɔ́mí bɔ́nsɔ buye bulimbólámí na káti ya Lisakoli liye, bokɛsɛni atá mokɛ́ tɛ́, na mambí matálí lomposo la nzóto, bomwǎsí tǒ bobáli, lokóta, lingómba lya nzámbe, makanisi ma politíki tǒ ya ndéngé ésúsu, ekólo tǒ lingómba ya bato, bokulaka, mbótama tǒ makambo masúsu.
  2. Epái esúsu, na botálaka elɔ́kɔ ya moto, epekísámí kosála bokɛsɛni na mambí matálí mibéko mya politíki, mibéko mya bosámbisi tǒ mya boyókani na mikili mísúsu, ezala ekólo tǒ mabelé ya nsɔ́mí tǒ eye eyángélémání na baúta, tǒ óyo ezwí bonsɔ́mí bwa síkísíkí tɛ́.

Eténi ya 3[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kozala na bomɔi, na kozala nsɔ́mí mpé kozala motéma nsɛi na bomoto bwa yě.

Eténi ya 4[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto atá mokɛ́ tɛ́ asɛ́ngɛ́lí kozala moúmbu; boúmbu mpé botɛ́ki baúmbu bupekísámí na ndéngé insɔ

Eténi ya 5[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto atá mokɛ́ tɛ́ asɛ́ngɛ́lí konyɔ́kama mpé kosalelama makambo ya bonyama mpé óyo ezanga bomoto na lokúmu.

Eténi ya 6[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te bayéba makokí ma yě bipái bínsɔ.

Eténi ya 7[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bato bansɔ bakokání libosó lya mobéko mpé bazalí na likokí lya kobátelama na mobéko sé ndéngé mɔ̌kɔ́. Bánsɔ bazalí na likokí lya kobátelama sé ndéngé mɔ̌kɔ́ esóngó na bikelá nyɔ́nsɔ ya bokɛsɛnisi elongobani tɛ́ na Lisakoli liye mpé esóngó na bikelá bínsɔ biye bikobota bokɛsɛnisi yangó.

Eténi ya 8[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya koluka lisálisi lya nsɔ́lɔ́ mpenzá na libosó lya mangómbá ma bosámbisi bwa ekólo eye ezalí na bwányá esóngó na bikelá biye bikotángola malɔki ma ntína mandimámí na mibéko mpɔ̂ na yě.

Eténi ya 9[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto mɔ̌kɔ́ tɛ́ akokí kokangama tǒ kobengisama ntína tɛ́.

Eténi ya 10[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te likambo lya yě lokóla lya bato bansɔ, lisámbisama na bosémbo mpé na mǐso mya bato bánsɔ na esámbiselo ya nsɔ́mi mpé ya epái mɔ̌kɔ́ tɛ́, eye ekozwa mikáno ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na makokí mpé masɛ́ngínyá yě tǒ ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na bosɔ̂lɔ́ bwa likambo yě afúndámí.

Eténi ya 11[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ óyo afúndámí na likambo azalí naíno mabɔ́kɔ mpɛ́mbɛ́ téé ntángo bakotatola ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na mobéko, mabé yě asálí, na libánza liye likosalama na mǐso mya bato bansɔ, epái wápi mánsɔ esɛngɛ́lí kosalama mpɔ̂ te mofúndami azwa na yě.
  2. Moto atá mɔ̌kɔ́ tɛ́ asɛ́ngɛ́lí kozwa etúmbu mpɔ̂ na makambo tǒ botíki óyo, ntángo esálámákí, ezalákí naíno mbéba tɛ́, ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na mibéko mya ekólo tǒ ya molɔ́ngɔ́. Sé loléngé yangó, bakokí tɛ́ kopɛ́sa moto etúmbu koleka eye ezaláká kopɛ́sama na ntángo likambo lisalámákí.

Eténi ya 12[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto atâ mɔ̌kɔ́ tɛ̂ akokí kokɔ́ta mpámba na makambo matálí ezaleli, libótá, ndáko mpé mikandá ya nganda tǒ mpé kobébisa lokúmu na yě. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kobátelama na mobéko esóngó na bikɔ́ta-kɔ́ta yangó.

Eténi ya 13[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na makokí ma kotámbola ndéngé alingí mpé kopɔna esíká ya kovánda káti na ekólo.
  2. Moto nyɔ́nsɔ azalí na makokí ma kotíka ekólo ínsɔ atá ya yě mɔ̌kɔ́ mpɔ̂ na kokɛndɛ na ekólo esúsu; yě akokí mpé kozónga na ekólo ya yě.

Eténi ya 14[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Na libosó lya monyɔ́kɔli, moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya koluka mpé kozwa esíká ya kobómba nzóto na bikólo bisúsu.
  2. Likokí lyangó likopɛ́sama tɛ́ na moto afúndámí na likambo lya makási tǒ na bikelá biye bilongobani tɛ́ na mibéko mya Lisangá lya Bikólo bya Molɔ́ngɔ́.

Eténi ya 15[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya koyébana mosí-ekólo.
  2. Bakokí tɛ́ kopímela moto likokí lya kozala mosí-ekólo tǒ ya kokóma moto wa ekólo esúsu.

Eténi ya 16[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Sɔ́kí mobú ya kobálana ekokí, mobali mpé mwâsí bakokí kokwêlana mpé kotónga libóta mpé masímbisi mazala tɛ́ na makambo matálí lomposo, ekólo tǒ lingómba lya nzámbe. Bangó bazalí na makokí sé ndéngé mɔ̌kɔ́ na makambo etálí makwéla, ezala ntángo ya makwéla tǒ ntángo ya bokabwani.
  2. Libála likokí kosalama sé sɔ́kí mwâsí na mobali bangó méi bandimi na motéma mɔ̌kɔ́.
  3. Libála lizalí longómba la ntína mpɔ̂ na bato mpé lizalí na likokí lya kobátelama na bato mpé Letá.

Eténi ya 17[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azala yě mɔ̌kɔ́ tǒ na káti ya lisangá, azalí na likokí lya mokóló-ekólo.
  2. Bakokí atá mokɛ́ tɛ́ kopímela tǒ kobɔ́tɔla moto elɔ́kɔ na yě sɔ́kí ntína ezalí tɛ́.

Eténi ya 18[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí, ya kozala na makanisi na yě, mayɛ́lɛ na yě ya motéma mpé lingómba lya yě ya nzámbe; likokí lyangó ekopɛ́sa yě ndingisa ya kopɔna lingómba lya nzámbe tǒ kobóngola makanisi ma yě, yě mɔ̌kɔ́ tǒ elongo na baníngá, ezala na mǐso mya bato ya mɛi; na botéyi, na bikelá, na bokúmisi nzámbe mpé milúlú.

Eténi ya 19[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ya bokanisi mpé bolobi; yangó ekopɛ́sa yě ndingisa ya kozala na bomɔi na motéma tɛ́ likoló lya makanisi ma yě ndingisa ya koluka, kozwa mpé kopanza mayébisi na makanisi esíká na esíká, na ndéngé alingí koyébisa mangó.

Eténi ya 20[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kozala na likita mpé lingómbá liye lizalí na kímyá.
  2. Ekokí tɛ́ kosɛ́ngama na makási tɛ́ moto akɔ́ta na lingómbá.

Eténi ya 21[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kotíya mabɔ́kɔ na bokambi misálá mya ekólo ya yě ezala yě mɔ̌kɔ́ tǒ na batóma yě mɔ̌kɔ́ apɔní.
  2. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí, lokóla baníngá nyɔ́nsɔ ya kosála misálá mya Letá.
  3. Bolingi bwangó bosɛngɛ́lí komɔ́nana na mapɔni ya sémbo maye masɛngɛ́lí kosalama mbala na mbala, na lipɔ́neli lya bato bansɔ mpé na bopɔni bwaa Lingómbá tǒ na ndéngé esúsu ekokani na yangó mpé ekosála ’te bato bapɔna na bonsɔ́mí bunsɔ.

Eténi ya 22[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ, lokóla azalí mɔ̌kɔ́ ya lingómbá, azalí na likokí lya kozwa lisálisi lya esálelo-lisungi, eye ezalí na ndingisa ya kopɛ́sa moto makokí ma yě ya mosólo, ya bomɔi mpé ezaleli, mpɔ̂ na lokúmu mpé bokóli malámu ya bomoto bwa yě, na lisálisi lya bokási bwa ekólo mpé ya boyókani bwa mikili na mikili, ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na mwangó mpé bokulaka ya ekólo na ekólo.

Eténi ya 23[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kozwa mosálá, ya kopɔna mosálá yě alingí, na ndéngé ya sémbo elongobani na mosálá, mpé basɛ́ngɛ́lí kobátela ya esóngó na bosɔmɛ́lɛ.
  2. Bato bánsɔ bazalí na likokí, bokɛsɛni atá tɛ́, ya kozwa lifúta likokani mpɔ̂ na mosálá mokokani.
  3. Moto nyɔ́nsɔ akosála, azalí na likokí ya kozwa lifúta lya sémbo mpé elongobani, liye likosála tɛ́ yě na libóta lya yě bazwa bomɔi elongobani na lokúmu la moto, mpé ekokí kobɔngisama lisúsu na ndéngé ínsɔ ya bobáteli bomɔi.
  4. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ya kokela basɛndiká elongo na baníngá mpé kokɔ́ta na basɛndiká mpɔ̂ na kokɛ́ngɛla maloki ma yě.

Eténi ya 24[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya bopémisi mpé bopémisi nzóto, míngi ya bozwi eleko ya sémbo ya boúmélí na mosálá mpé na bozwi lifúta na bakonzi ya mbala na mbala.

Eténi ya 25[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kobíkela na ndéngé elongobani mpɔ̂ ’te azwa bokɔ́lɔ́ngɔ́nú, bozala malámu ya yě mpé ya libóta lya yě epúsí na makambo matálí kolíya, koláta, kovánda, kosálisa nzóto mpé kosungama na ndéngé esɛngɛ́lí; yě azalí na likokí lya kosálisama na ntángo ya bosɔmɛ́lɛ, bokɔnɔ, bosɛ́lɛ́, bozéngé, bobangé tǒ na ntángo esúsu yě akozánga mosólo ya kobíkela na sima ya makambo masálámí na bolinga na yě tɛ́.
  2. Bomamá mpé bomwǎna buzalí na likokí lya kosungama na ndéngé elongobani. Mwǎna nyɔ́nsɔ abótama káti ya makwéla tǒ na libándá asɛ́ngɛ́lí kobátelama tǒ ndéngé mɔ̌kɔ́.

Eténi ya 26[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya bokólísi bwányá mpé mayɛ́lɛ. Matéya masɛngɛ́lí kopɛ́sama mpámba, mosólo tɛ́, atá na bakelási ya mabandela. Matéya ma mabandela masɛ́ngɛ́ní kopɛ́sama na moto nyɔ́nsɔ. Matéya ma tekniki mpé ya mosálá masɛngɛ́lí kopɛ́sama bipái binsɔ; eposá ya kozwa matéya ma kelási ya inɛ́nɛ esɛngɛ́lí kopɛ́sama na bato bansɔ, sé ndéngé mɔ̌kɔ́, ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na mayɛ́lɛ ma bangó.
  2. Bokólísi bwányá mpé mayɛ́lɛ bosɛngɛ́lí kosála tɛ́ moto akóla na ndéngé nyɔ́nsɔ mpé atósa malámu mpenzá makokí mpé bonsɔ́mí ya ntína na moto. Yangó esɛngɛ́lí komɛma boyókani, bobóto, bolingo káti ya bikólo mpé mangómbá ya bato baye lomposo mpé boyambi ekɛsɛni; yangó mpé esɛngɛ́lí kobɔngisa misálá mya Lisangá lya Bikólo bya Molɔ́ngɔ́ mpɔ̂ na bobáteli kímyá.
  3. Babóti bazalí na likokí lya yambo, ya bopɔni ndéngé ya matéya masɛngɛ́lí kopɛ́sama na bǎna ba bangó.

Eténi ya 27[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kotíya mabɔ́kɔ ndéngé alingí na misálá mya bokólísi bwányá ya lingómbá, kopɛ́sɛla na nkoti, mpé kotíya mabɔ́kɔ na botómboli nzébi mpé bolámu bwa yangó.
  2. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te matómba ma misálá mya yě ya nzébi, mya bokómi mpé ya nkoti mabátelama.

Eténi ya 28[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te káti ya bato mpé bikólo, nyɔ́nsɔ ebóngá mpɔ̂ te makokí mpé bonsɔ́mí oyo ekomámí káti ya Lisakoli liye elónga.

Eténi ya 29[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Moto azalí na mikúmba epái ya lingómbá liye likopɛ́sa yě eposá ya bokólísi bomoto bwa yě na ndéngé elongobani.
  2. Moto nyɔ́nsɔ, na botálaka makokí mpé bonsɔ́mí na yě, asɛ́ngɛ́lí kosála sé mikúmba miye miyébání na mobéko sé mpɔ̂ ’te bayéba mpé bakúmisa maloki mpé bonsɔ́mí bwa baníngá, mpé mpɔ̂ na kotósa mibéko mya sémbo ya ezalela kímyá ya bato mpé bozali malámu káti ya lingómbá lya boyángeli lisangá.
  3. Makokí mpé bonsɔ́mí yangó makokí, atâ mokɛ́ tɛ̂, kozala esóngó na masɛ́ngí ma Lisangá ya Bikólo ya Molɔ́ngɔ́.

Eténi ya 30[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mobéko atá mɔ̌kɔ́ tɛ́ ya Lisangá liye mokokí kozala mpɔ̂ na Letá, na lisangá ya bato, tǒ na moto, likokí lya kosála likambo liye likonyata makokí mpé bonsɔ́mí áwa.

Tála mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]