Misála ya Bantoma

Artíclɛ ya Wikipedia.

Kokɛndɛ na: Navigation, boluki
Boyokani ya Sika

El Greco: Molímo Mosántu na Yerusalemi.
Fra Angelico: Petelo alobí na Bayuda.

Misála ya Bantoma ezalí búku ya Sango Malamu ya Biblíya.

Moto akòmá mokanda oyo ezalí Luka; ye pe moto akòmaki Sango Malamu ya misato. Kobanda na mokolo Yésu amataki na Likolo, bayekoli bazalaki komona ye lisusu na miso té; kasi ya azalaki kaka na kati na bango, pamba té Molímo Mosántu azalaki kosalisa bango ézala bantoma (Petelo, Yoane,…) to basalisi na bango sambo (Etiene, Filipe, …) to pe Polo.

Maloba ya Yésu[1] elakisi ndenge makombo ezalí kolandana. Bayekoli bapanzaki Sango Malamu

Luka atiaki molende po na koyeba ndenge ninni penza bantoma bazalaki kosakola Sango Malamu; je moko asalaki mibembo mosusu ná ntoma Polo.[5]

Epai ya bato ya bikolo nyonso, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, bantoma bazalaki kosakola sango ya Yésu; ndenge ya azalaki, maloba na ye pe misala na ye. Boye mokanda ya Luka ezalí kolakisa mosala monene oyo Nkolo Yésu apesi Eklezya: kosakola Sango Malamu na bamboa nyonso, tii na suka ya mokili.[6]

[kokoma] Tála mpé

  1. Misála 1.8.
  2. Misála 1.1-8.3.
  3. Misála 8.4-12.25.
  4. Misála 13.1-28.31.
  5. Misála 16.10-40; 20.5-21; 27.1-28.16.
  6. SBZ, 1954.
Bomɔ́niseli