AVC

Útá Wikipedia.

AVC, eyebani mpe bo accident vasculaire cérébral, attaque cérébrale to mpe lokito na moto, esalemaka ntango circulation ya makila eza mabe na bongo mpe komema liwa ya ba cellule. Eza na lolenge mibale ya AVC: AVC ischémique, kolandana na bozangi ya circulation ya makila, mpe AVC hémorragique, kolandana na botangisi makila. Yango nionso mibale esalaka ete eteni ya bongo esala malamu te.[1] Bilembo ya AVC ekoki kozala kozanga ndenge ya koningana to kosentir na ngambu moko ya nzoto, kososola makambo to koloba, koyoka neti mokili eza kobalu mbangu, to liso moko etiki komona mpe bilembo misusu.[2][3] Bilembo bibandaka mingi mingi komonana noki sima na AVC kosalama. Soki bilembo biumeli na eleko na se ya ngonga moko to mibale yango eyebani bo accident ischémique ya eleko mokuse.[3] AVC hémorragique ekoki mpe kolandana na moto mpasi ya makasi.[3] Bilembo ya AVC bikoki koumela libela.[1] Mikakatano miye mikoki koya sima na eleko molayi mikoki kozala pneumonie to kobungisa contrôle ya ba vessie.[3]

Facteur risque ya yambo mpo na AVC eza hypotension artérielle.[4] Ba facteurs risques misusu eza kobenda likaya, obesité, taux monene ya cholestérol kati ya makila, maladi ya sukali, accident ischémique ya eleko mokuse, mpe fibrillation auriculaire.[2][4] AVC ischémique mingi mpeza elandanaka na kozibama ya vaisseau ya makila.[5] AVC hémorragique elandanaka na kotangisa makila nakati ya bongo to na nzinga nzinga ya bongo.[5][6] Kotangisa makila ekoki kosalema kolandana na kovimba ya bongo.[5] Diagnostic mingi mpeza esalemaka na bozwi bilili na ba labo neti na scanner ya tomographie to scanner IRM elengo na ba examen ya nzoto. Ba teste misusu neti électrocardiogramme (ECG) na ba teste ya makila esalemaka mpo na koyeba ba facteurs risques mpe kolongola ntina misusu oyo ekokaki kozala. Sukali moke na makila ekoki mpe komema bilembo lokola oyo ya AVC.[7]

Mpo na komibatela esengeli kokitisa bafacteur risque na mpe aspirine, statine, lipaso mpo na kofungola ba artéres oyo ekeyi na bongo mpo an baye baza na kokondisama oyo ya mikakatano, mpe warfarine mpo na baye baza na fibrillation auculaire.[2] AVC mingi mingi esengaka kokende na soins d'urgence.[1] AVC ischémique, soki ekundolami nakati ya ngonga misato kino minei na ndambu, ekoki kobikisama na nkisi oyo ekoki kopanza mbuma ya makila. Esengeli kosalela Aspirine. Ba AVC hémorragique mususu esungamaka na lipaso. Traitement mpo na komeka kozongisa fonctionnement eye etikaki kosala ebiangamaka rééducation cérébrale mpe mingi mpeza esalemaka na service cardiaque; kasi, yango eza bisika mingi te na mokili.[2]

Na mobu ya 2010 pene ya 17 million ya batu bazwamaki AVC mpe 33 million bazalaki baye basila kozwa yango liboso mpe bakobaki kozala na bomoyi. Kayi ya mobu ya 1990 na ya 2010 motango ya ba AVC oyo esalemaki mobu na mobu ekitaki kino pene na 10% na ba pays développés kasi emataki na 10% na ba pays en voie de développement.[8] Na mobu ya 2013, AVC ezalaki ya mibale sima ya maladi ya ba artéres coronaires na oyo mingi mingi ememaka kufa, ememaki liwa ya batu 6.4 million (12% ya nionso).[9] Pene na 3.3 million ya batu bakufaki, elandanaki na AVC hémorragique.[9] Pene na moitié ya batu oyo bazwa AVC babikaka na se ya eteni ya mobu.[2] Na nionso, 2/3 ya AVC esalemaka na baye baza na mibu koleka 65.[8]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 1,1 et 1,2 "What Is a Stroke?". March 26, 2014. http://www.nhlbi.nih.gov/health/health-topics/topics/stroke. Retrieved 26 February 2015. 
  2. 2,0 2,1 2,2 2,3 et 2,4 Donnan GA, Fisher M, Macleod M, Davis SM (May 2008). "Stroke". Lancet 371 (9624): 1612–23. doi:10.1016/S0140-6736(08)60694-7. PMID 18468545. 
  3. 3,0 3,1 3,2 et 3,3 "What Are the Signs and Symptoms of a Stroke?". March 26, 2014. http://www.nhlbi.nih.gov/health/health-topics/topics/stroke/signs. Retrieved 27 February 2015. 
  4. 4,0 et 4,1 "Who Is at Risk for a Stroke?". March 26, 2014. http://www.nhlbi.nih.gov/health/health-topics/topics/stroke/atrisk. Retrieved 27 February 2015. 
  5. 5,0 5,1 et 5,2 "Types of Stroke". March 26, 2014. http://www.nhlbi.nih.gov/health/health-topics/topics/stroke/types. Retrieved 27 February 2015. 
  6. Feigin VL, Rinkel GJ, Lawes CM, Algra A, Bennett DA, van Gijn J, Anderson CS (2005). "Risk factors for subarachnoid hemorrhage: an updated systematic review of epidemiological studies". Stroke 36 (12): 2773–80. doi:10.1161/01.STR.0000190838.02954.e8. PMID 16282541. http://stroke.ahajournals.org/cgi/content/full/36/12/2773. 
  7. "How Is a Stroke Diagnosed?". March 26, 2014. http://www.nhlbi.nih.gov/health/health-topics/topics/stroke/diagnosis. Retrieved 27 February 2015. 
  8. 8,0 et 8,1 Feigin VL, Forouzanfar MH, Krishnamurthi R, Mensah GA, Connor M, Bennett DA, Moran AE, Sacco RL, Anderson L, Truelsen T, O'Donnell M, Venketasubramanian N, Barker-Collo S, Lawes CM, Wang W, Shinohara Y, Witt E, Ezzati M, Naghavi M, Murray C (2014). "Global and regional burden of stroke during 1990-2010: findings from the Global Burden of Disease Study 2010". Lancet 383 (9913): 245–54. doi:10.1016/S0140-6736(13)61953-4. PMID 24449944. 
  9. 9,0 et 9,1 GBD 2013 Mortality and Causes of Death, Collaborators (17 December 2014). "Global, regional, and national age-sex specific all-cause and cause-specific mortality for 240 causes of death, 1990-2013: a systematic analysis for the Global Burden of Disease Study 2013.". Lancet 385: 117–71. doi:10.1016/S0140-6736(14)61682-2. PMID 25530442.