Aller au contenu

Bobomi ya Patrice Lumumba

Útá Wikipedia.
Bokangami ya Lumumba na kati na Christophe Musungu

Babomaki Patrice Lumumba, ministre-mokonzi ya République démocratique du Congo, na mokolo ya 17 to 18 sanza ya yambo 1961.

Na mokolo ya 14 sanza ya libwa 1960, Colonel Joseph Mobutu (na nsima Mobutu Sese Seko) asalaki coup d'état na lisalisi ya Joseph Kasavubu mpe ye moko azwaki bokonzi. Lumumba akangamaki na basodá ya Mobutu na mokolo mwa 1 Desɛ́mbɛ 1960. Bakangaki ye na Port Francqui mpe bamemaki ye na Léopoldville na mpɛpɔ.

Mobutu alimbolaki ete Lumumba asengelaki kokutana na bifundeli ya basodá ya kotombokisa bato na botomboki mpe na mbeba mosusu. Secrétaire général ya ONU Dag Hammarskjöld asengi Kasavubu apesa Lumumba etumbu ya sembo. Union Soviétique efundaki Hammarskjöld mpe mikili ya Mpótó mpo na bokangami ya Lumumba mpe esɛngaki ete abimisama.

Bobomi yango

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Lumumba abimisamaki na boloko ya basoda ya Thysstad pene na Léopoldville na boloko ya  ⁇  ya malamu koleka  ⁇  na Jadotville na Katanga na mokolo ya 17 sanza ya yambo 1961, atikalaki na maboko ya banguna na ye. Balapolo emonisaki ete Lumumba mpe baninga na ye ya boloko, Maurice Mpolo mpe Joseph Okito, banyokwamaki makasi na bapolisi ya etuka wana ntango bakomaki na etuka ya batomboki ya Katanga.

Kaka na butu wana, Lumumba mpe baninga na ye mibale babomamaki na ndenge oyo eyebani mpenza te. Kati na búku na ye The Murder of Patrice Lumumba (1999), mokomi Ludo De Witte alobi ete Frans Verschile, mokambi ya bapolisi ya Belgique, azalaki komema bakangami kino na esika oyo basengelaki kobomama. Polisi Julien Gat apesi mitindo na basoda ete babeta masasi. Nzoto na ye ezwamaki te mpe balobaka ete Gérard Soete asilisaki yango na 200 litres ya acide sulfurique na 1961. Lino ya wolo oyo bakanisaka ete ezali ya Patrice Lumumba ebombami na tribinale ya Bruxelles