Botulisme

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Botulisme (Latin, botulus, saucisse[1]) eza bokono boye boyebani mingi te mpe ekoki komema likama ya mabe koleka kowuta na toxine oyo ewutaka na bactérie ya Clostridium botulinum. Bokono oyo ebandaka na bolembu, mikakatano ya komona, kolemba, na mikakatano mpo na koloba. Yango ekoki nasima kolandisama na bolembu ya maboko, misunyi ya panzi na makolo. Bokono oyo mingi mingi etungisaka mayele te mpe ememaka fièvre te.[2]

Botulisme ekoki kobimela na ba nzela ndenge na ndenge. Ba spore ya ba bactérie oyo ememaka yango ezala na mabele mpe na mayi. Ebotaka toxine botulitique ntango etiami na oxygène ya niveau ya se mpe na lolenge songolo ya temperature. Botulisme kowuta na bilei ebimelaka ntango mutu alei bilei biye biza na toxine. Botulisme ya bana ebimelaka ntango bactérie ekoli nakati ya mitsopo mpe ebimisi toxine. Yango esalemaka mingi mpeza epayi ya bana baye baza na sanza na se ya motoba, mpo ete sima na eleko ena nzoto emitongaka mpo na komibatela. Botulisme ya mpota ezwamaka mingi mingi epayi baye bako komituba ntonga ya lopipi. Na likambo oyo, ba spore ekotisaka mpota mpe, na bozangi ya oxygène, etikelaka toxine. Yango epesamaka te kowuta mutu songolo koleka epayi mutu pakala. Confirmation ya diagnostic esalemaka na nzela ya boluki toxine to bactérie nakati ya mutu oyo atungisami.[2]

Nzela ya yambo mpo na komibatela eza kolamba bilei ndenge elongobani. Toxine, kasi kanyama te, ekufaka na molunge ya koleka Modèle:Convert/°C na eleko koleka minuti 5. Mafuta ya nzoi ekoki kozala na kanyama, mpo nayango esengeli te kopesa mafuta ya nzoi na bana oyo bazali na sanza na se ya 12. Traitement esalemaka na antitoxine. Mpo na baye babungisaka makoki ya kompema bango moko, ekoki kosengela mpo nabango masini ya kopesa mopepe, ntango mususu mpo na ba sanza. Bakoki kosalela ba antibiotique mpo na botulisme ya mpota. Liwa ememaka  5 kino 10% ya batu. Botulisme ekoki mpe kotungisa ba nyama ndenge na ndenge.[2]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]