Etat ya Kifwafwa

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Etat ya kifwafwa (SE) eza crise ya kifwafwa oyo ekoumela koleka minuti mitano to kopiquer crise koleka mbala moko nakati ya minuti mitano na mutu oyo azali kokoka te kozonga ndenge azalaka.[1] Kala bazalaka kosukisa eleko ya crise na minuti 30.[2] Ba crise ekoki kozala ya tonico-clonique na motindo moko moko ya kokangama na kofungolama ya maboko na makolo to ya lolenge oyo eza na kokangama te neti absence ya ba crise to ndambu ya ba crise ya bilinga bilinga. Etat ya kifwafwa ezalaka urgence eye etungisaka bomoyi ya mutu mingi mpeza soki traitement epesami na lobango te.[1]

Etat ya kifwafwa ekoki kokomela baye basila kozwa kifwafwa na mpe baye baza na nkokoso ya kozalisa yango kouta na bongo.[2] Nkokoso oyo ya bozalisi kouta na bongo ekoki kozala traumatisme, ba infections, to ba accident vasculaire cérébral.[2] Mingi mingi diagnostic esalemaka na bomeki sukali kati ya makila, kozwa bilili ya moto, bomeki makila na ba lolenge ndenge na ndenge, mpe kosalela électroencéphalogramme. Ba crise psychogénique ya kifwafwa te ekoki komonana neti yango. Mitindo misusu miye mikoki komonana neti Etat ya kifwafwa eza hypoglycémie, kosala maye malongobani te, méningite, mpe loyenge.[1]

Benzodiazépine eza ba nkisi oyo esengeli kobanda nayango na sima nayango mingi mpeza ezalaka kopesa phénytoïne.[1] Ba benzodiazépine oyo ekoki kozwama eza lorazépam ya kokotisa na mizisa na mpe tonga ya midazolam.[3] Ba nkisi misusu ya ndenge na ndenge bakoki kosalela yango soki nkisi oyo etangemi awa likolo eza kosalisa te, bakoki bongo kosalela acide valproïque, phénobarbital, propofol, to kétamine. Intubation ekoki kosengela mpo na kosalisa voie respiratoire mobeli. Kati ya 10 kino 30% ya batu oyo baza na etat ya kifwafwa bakufaka nakati ya mikolo 30.[1] Ntina eye ezalisaki bokono, mibu ya mutu mpe bolayi ya eleko ya crise eza bafacteur ya motuya mpo na koyeba nini yango ekokoma.[2] Etat ya kifwafwa ezwaka kino batu 40 kati ya batu 100,000 na mobu.[2] Yango eza bongo 1% ya baye bakende na ba salles d'ugence.[1]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 1,1 1,2 1,3 1,4 et 1,5 Al-Mufti, F; Claassen, J (Oct 2014). "Neurocritical Care: Status Epilepticus Review.". Critical Care Clinics 30 (4): 751–764. doi:10.1016/j.ccc.2014.06.006. PMID 25257739. 
  2. 2,0 2,1 2,2 2,3 et 2,4 Trinka, E; Höfler, J; Zerbs, A (September 2012). "Causes of status epilepticus.". Epilepsia 53 Suppl 4: 127–38. doi:10.1111/j.1528-1167.2012.03622.x. PMID 22946730. 
  3. Prasad, M; Krishnan, PR; Sequeira, R; Al-Roomi, K (Sep 10, 2014). "Anticonvulsant therapy for status epilepticus.". The Cochrane database of systematic reviews 9: CD003723. doi:10.1002/14651858.CD003723.pub3. PMID 25207925.