Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Etuka ya Équateur

Útá Wikipedia.

Etuka ya Équateur ezali, wuto bokwabinisi ya bituka na 2015 moko ya bituka ya Kongó Demokratiki. Engumba mokonzi na ye ezali Mbándáká.

Mambi ma mabele
[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Etúká yango ezali mwa patatalu, ekatisami na ebale Congo kobanda na nɔrdi-ɛsti tii na sudi-wɛsti. Na mwayene ya bosanda ya 340 m, Laki Tumba ezali esika na yango ya nse koleka, na 320 m ya bosanda (altitude). Monɔkɔ ya ebale Ubangi ezali na etúká ya wɛsti ya etúká yango.

Etúká yango ezipami na bazamba ya mbula oyo ezalaka ntango nyonso pondu, oyo ezali na densité mingi mpe banzete ndenge na ndenge mingi.

Tango (Climat)
[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ezwami na bassin central, relief yango ezali kolakisa bokeseni te na niveau. Ezali na ba terrains sédimentaires dépliés mpe na zamba équateur. Mabele yango ezali na zelo mpe mabele ya lima oyo ezali na mabangamabanga. Klima ezali tropical humidité esika mbula ebɛtaka pene na mbula mobimba.

Eleko ya mbula ya monene ebandaka kobanda sanza ya libwa tii na sanza ya mitano mpe eleko ya kokauka ya mokuse kati na sanza ya motoba mpe ya mwambe. Lisusu, mbula ezali mpe mingi te kati ya sanza ya Yanuali mpe ya Marsi na eteni ya Nord-Est ya Etuka.

Mwayene ya molunge ekeseni kati na 20° mpe 31° kasi koleka ndelo elongolami te. Matiti yango ezali na bazamba minene oyo ezali ntango nyonso na vert mpe banzete ndenge na ndenge. Réseau hydrographique ezali mingi mingi na ebale Congo (400 km) pe ebele ya ba afluents na yango : Ruki, Lulonga, Ubangi, Ikelemba, Mongala, (2.450 km ya ba afluents navigables). Ezali réseau ya banzela ya mai oyo eleki monene na mboka. [1]

  1. https://caid.cd/?page_id=12020