Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Kikaya Bin Karubi

Útá Wikipedia.
Kikaya Bin Karubi
Kikaya Bin Karubi en 2010.
Fonctions
Minister of Communications
-
Député
Première législature de la Troisième république congolaise (d)
Biographie
Naissance
Voir et modifier les données sur Wikidata (71 ans)
Kasongo (en)Voir et modifier les données sur Wikidata
Nom de naissance
Barnabé Kikaya Bin KarubiVoir et modifier les données sur Wikidata
Nationalité
Formation
Université de Boston (en) (Ph.D. (en)) ()
Université de Lubumbashi (en)Voir et modifier les données sur Wikidata
Activités
Enfant
Gary Kikaya (en)Voir et modifier les données sur Wikidata
Autres informations
Parti politique
Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie (en)Voir et modifier les données sur Wikidata

Barnabé Kikaya Bin Karubi azali diplomate mpe moto ya politiki ya Congo (RDC) abotama na mokolo ya 22 sanza ya libwa 1954 na Kasongo.

Biografi ya bomoi ya bato

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Azwaki diplôme na Lingelesi na université ya Lubumbashi, azalaki assistant na faculté ya lettres esika ateyaki mbula moko liboso ya kokende kolanda ba études ya journalisme mpe ya science politique na Etats-Unis, na université ya Boston na Massachusetts. Azwaki diplome na ye ya doctorat na 1989.

Mpo na mbongwana oyo ezalaki kosalema na Afrika ya Sudi, akendaki na Johannesburg epai asalaki lokola mokomi ya Canal Afrique, misala ya libanda ya radio mpe televizyo ya Afrika ya Sudi. Kobanda 1995 kino 1997, akambaki société na ye ya communication, conseil ya communication ya Afrika, Afro 2C.

Azongi na RDC na bokonzi ya Laurent-Désiré Kabila oyo aponi ye ambassadeur na Zimbabwe. Ntango Laurent-Désiré Kabila abomamaki, mokitani na ye, Joseph Kabila aponaki ye ministre ya sango, esika oyo atikalaki kino na masolo ya Sun City. Sima na yango, akomi secrétaire particulier ya Président ya République. Na 2006, aponamaki na Assemblée nationale na kati ya circonscription ya Kasongo na Maniema.

Na 2009, mokonzi ya mboka abengaki ye na diplomatie mpe aponaki ye ambassadeur extraordinaire mpe plénipotentiaire ya République démocratique ya Congo na Grande-Bretagne, esika azali kino lelo.

Barnabé Kikaya Bin Karubi azali moko ya bato oyo babimisaki Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie (PPRD), parti oyo ezali na bokonzi.

Na sanza ya yambo 2021, Kikaya Bin Karubi atikaki RDC mpo na kokende na mboka mopaya.

Bomoi ya nkuku

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Azali na mwasi na bana sambo. Mwana na ye ya mobali Gary Kikaya azali mopoti mbangu na masano ya olympique oyo amipesi na 400 mètres (mokonzi ya kala ya Afrika) mpe na 200 mètres.

Ba références

[kokoma | kobɔngisa mosólo]